ÐÓMAPµ¼º½

Luka

++ Parolin, forse non come prima ma Papa torner? a governare ++ ++ Parolin, forse non come prima ma Papa torner? a governare ++  (ANSA)

Episkopo ya lokumu Parolin akobenga mbongwana ya masanga ya mokili

O eleko ya likambo moko esalemaki pembeni ya Roma mokolo ya minei 27 na sanza ya misato, episkopo ya lokumu Secr¨¦taire d¡¯Etat ya Vatican atangi bitumba ebele bikotangisa makila na mokili, na kolikia t¨¨ boboto ekokoma na bomipesi makasi ya Bikolo. Lokola amoni t¨¨ masanga mingi ya mokili bilongobani te na mokili ya lelo, Ye amoni mbongwana ya masanga maye mpo na kosunga lisolo kati na Bikolo na lolenge makambo ya sika bizali na mokili.

Nsango ya Vatican

Biyano ¡°na boluki mandoki te¡±. Ezali mposa ebimisami lisusu na episkopo ya lokumu Pietro Parolin, Secrétaire d¡¯Etat ya Vatican, o eleko ya mbala ya isato ya Chaire d¡¯hospitalité, liyangani moko esalemi na Fraterna Domus de Sacrofano, pembeni ya Roma, mpe ekoluka bokolisi momeseno ya bomoko, ya bokutani mpe ya lisolo.

Atombeli liboso mpenza bobiki na lombangu na Papa François, abakisaki na bolobi tè François ¡°azali lisanga na Eklezia mobimba mpe na bandimi banso¡±, lelo lokola eleki mibu mitano, o eleko ya losambo na esika Santu Petelo ntango ya maladi ya coronavirus, mokolo ya 27 ya sanza ya misato ya 2020.

¡°Bosilisi bokasi ya maloba¡±

Lolenge mokili ezali kotambola, episkopo ya lokumu Parolin azongeli maloba ya Papa François oyo asengaka ¡°bosilisi bokasi ya maloba¡±. ¡°Bosilisi bokasi ya maloba mpo na koboya tè bibongwama mobulu mpe bibongwana na etumba¡±, esembolaki episkopo ya lokumu. ¡°Yango ezali mpo na moto nionso. Mingi mingi lelo, o eleko mindondo bizali bisika binso, esengeli kosalela maloba moke, kofanda kimia soki esengeli, mpe soki okosalela maloba, maloba yango bisengeli bizala ya bwanya, maye makoki kosalisa bosololi, bokutani, kasi ya kokabola te¡±.

Mokano moko asalelaka na Ukraine mpe Russia baye bazali na masolo mpo na kozima moto. ¡°Nakanisi tè ya ntina ezali ya kosolola na kotia mitambo liboso te mpo na bozui litono ya boyokani mpe ya kokoma na kimia, liboso, mpe na nsima, masolo ya solo solo bisalema nzambi ya bokomi na boboto ya sembo mpe ekowumela eye tozali kolikia banso mpe, nakanisi, bikolo bango mei bazoluka kokoma wana¡±, elobaki ye.  

Na oyo etali mobulu na Gaza, episkopo ya lokumu akolikia ete eyano moko ekozuama na boluki mandoki te. ¡°Nandimi, elobaki ye, esengeli koyeba kokanga motema epayi na epayi, tango mosusu Hamas na Israël basalelaka yango te¡±.

Bomatisi mobulu na mokili

Lisusu, Secrétaire d¡¯Etat akopesa bomatisi ya mobulu na mokili na lolenge moto azali kotala kaka oyo ya ye. ¡°Wana nionso ezali na biyano na mokili, moto moko te akotia motema na moninga. Yango ezali kowuta na bozangi kokolisa boyokani. Wana ekomema na boluki mandoki, ya bokoteli moninga na etumba liboso tè bakotela yo moko na etumba. Lolenge wana ezali kosala ete mobulu ezalaka ntango inso¡±.

Liboso ya bomatisi mobulu ena, Bikolo bisengeli bizongela ¡°Mposa ya Bikolo ya kosalela mikano bango moko bazuaka¡±. ¡°Na bozangi mposa ya politiki ena, makoki ya bozui kimia na mokili bizali te¡±, ekobaki ye.

Episkopo ya lokumu Parolin asukisaki bolobi na ye na mosala ya masanga ya mokili, biye bibotami nsima ya bitumba minene mibale na mokili, mpe biye bato bazali komona ete bizali kokoka lisusu makambo te. Tango mosusu, emoni episkopo ya lokumu, ¡°tobungisi lolenge ya kobongola likambo yango. Oyo ezali lolenge ya komikangama eye ekosunga te nzambi ya botali mikakatano ya solo bizali kotungisa bato¡±.  Esengeli bongo ¡°kobongola masanga ya mokili na lolenge makambo maleki na mibu zomi bileki¡±. Likambo ezali bongo ya koyeba soki ¡°mbano ya kobongola mango mpo bisala malamu¡± to ¡°bolingi moko mpo ya boluki mikano misusu¡±; esukisaki ye.

28 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 15:42