ÐÓMAPµ¼º½

Luka

ÐÓMAPµ¼º½ Francis continues his hospitalization ÐÓMAPµ¼º½ Francis continues his hospitalization 

Episkopo ya lokumu Krajewski asambeli na Eklezia mobimba mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa

Losambo ya sapele ya mbala ya sambo esalemaki na esika ya Santu Petelo mokolo ya eyenga na mpokwa mpo na libiki ya Papa Fran?ois. Episkopo ya lokumu aum?nier abondeli Ngondo Maria asunga Santu Papa na eleko eye ya mpasi.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Kobanda mposo moko, bandimi ya mokili mobimba bakosangana liboso ya basilique Santu Petelo, pembeni ya ba episkopo ya lokumu, ba episkopo mpe bilama ya Curie mpe bakosambela mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa François, oyo azali na lopitalo Gemelli kobanda mokolo ya 14 ya sanza ya mibale. ¡°Tosambela na Eklezia mobimba mpo na bokolongono ya nzoto ya Santu Papa François. Tika ete Ngondo Maria, Mama ya Eklezia, asunga ye na eleko eye¡±, elobaki episkopo ya lokumu aumônier, Konrad Krajewski, mokambi ya dicastère ya Bokabi, liboso ya losambo ya sapele.

Bandimi bakosambela na mongongo moko   

Lelo 2 ya sanza ya misato, na ngonga ya bomanyoli Mibombano ya Nkembo, bato ebele basanganaki na esika Santu Petelo, nsima ya losambo lolekaki lobi na kati ya basilique likolo ya mbula. Kobanda esika mwinda ezalaki kongengisa, motangi alobaki ba Mibombano mpe atangaki Nsango Elamu ya santu Luka. Episkopo ya lokumu Krajewski akambaki losambo na bolobi eteni ya yambo ya Tata wa Biso, mpe lisanga abakisaki eteni nsuka na mongongo moko, na bokobi na ba mbuma zomi ya Maria Losako. Na lisanga ya bandimi baye, mpokwa nsima ya mpokwa, na ngonga nionso, bakoya ebele na bokutani ya mokolo na mokolo, okoki komona bana bamilingi na bikoti na bango, ba sango, ba mamelo mpe ba volontaire ya Jubilé.

Bandimi mingi bayaki na ba bougie na loboko kuna na estrade, elili ya Ngondo Maria, Mama ya Eklezia, ebongisami na ba fololo ya pembe, ezalaki kobatela lisanga. Na lisanga, Gloria Patri eyembamaki, elandamaki na ba litanie mpe na Salve Regina ya bosukisi. Eleko ya losambo esukaki na loyembo ya Oremus pro Pontifice, eye ezali kokende elongo na Papa mpokwa inso na ngonga eye ya kotungisama.    

03 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 18:56