ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.05 Recita del Rosario 2025.03.05 Recita del Rosario  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Episkopo ya lokumu atiki Papa Fran?ois na Maria Salus Populi Romani

Ba episkopo ya lokumu, ba sango, ba mamelo na bandimi basalaki lisanga sapele na esika ya Santu Petelo mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa Fran?ois. Mokambi ya dicast¨¨re ya Makambo ya ba santu akambaki losambo mokolo ya misato ya putulu.

Vatican News

« Bandeko ya mibali mpe ya basi, pèlerins ya elikya, o ebandeli ya Karesimo, tosangani na losambo mpo na kosala sapele mpe komanyola mibombambo ya bomoi ya Yezu na nzela ya botali ya Mwa Esengo Ngondo Maria. Tosambela na Eklezia mobimba mpo na bokolongono ya nzoto ya Santu Papa François. Ngondo Maria, Salus Populi Romani, asunga ye na eleko eye¡±. Ezali na maloba wana nde episkopo ya lokumu Marcello Semeraro, mokambi ya dicastère ya Makambo ya ba santu, abandaki losambo mokolo ya misato na mpokwa na esika ya Santu Petelo. Bokutani eye ya butu, kobanda mokolo ya 24 ya sanza ya mibale ekosangisa mpokwa inso bandimi ebele bayei kotombola mongongo na bango epayi ya Nzambe na bosali sapele mpe bosambeli mpo na libiki ya Santu Papa. François azali na lopitalo kobanda mokolo ya 14 ya sanza ya mibale.

 Liboso ya basilique ya Vatican, lokola mpokwa inso, elili ya Ngondo ¡°Maria Mama ya Eklezia¡± akokengele losambo oyo ba episkopo ya lokumu, ba episkopo, ba sango, ba mamelo ya Curie ya Roma mpe ya diocèse ya Roma basangani na bandimi mingi. Nsima ya bomanyoli mibombamo ya esengo, bolobi Salve Regina mpe na nsuka ya ba litani ya Lorette, episkopo ya lokumu abiangaki kosambela na Maria mpo abikisa biso ¡°na mikakatano maye bikopesa mawa¡±, mpe akamba bato ya Nzambe ¡°epayi esengo ezanga ndelo¡±. Liboso ya kopanzana na kimia ya butu ya Roma, lisanga eyembaki Oremus Pro Pontifice mpe azuaki bobenisi ya episkopo ya lokumu Semeraro.

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 13:45