Bandimi batamboli na esika ya Santu Petelo na elembo ya boyambi mpo na Papa
Nsango ya Vatican
Ba exercices spirituels ya karesimo ya Curie romaine bisukaki mokolo ya mitano na ntongo, losambo ya Sapele ebongisamaki mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa François liboso ya bilama ya Curie, ezongi mpo na bato inso na esika Santu Petelo. Mokolo ya mitano ya 14 ya sanza ya misato na mpokwa, bilama ya dicastère ya Bopanzi Nsango, kuna na kati tozali na Radio Vatican na Vatican News, bango bakambaki losambo ya Mibombano ya Mawa.
Sango Lucio Ruiz, secrétaire ya dicastère, liboso ya préfet Paolo Ruffini mpe basali mingi, akambaki bomanyoli. Liboso ya kobanda, alobaki mwa maloba moke na bandimi bazalaki na nse ya basilique Santu Petelo. Akundolaki Satio Orbis eye esalemaka kaka esika wana eleki mibu mitano, o eleko ya maladi ya Covid-19. ¡°Ntango mokili ezalaki ya kongama mpe na kobanga, Papa François atambolaka ye moko esika eye, na nse ya mbula, mpo na kosambela mpo na biso banso. Mokili mobimba, elembaki, ezalaki kolanda mpe kozela elembo wana ya elikya¡±, elobaki ye.
¡°Lelo, maloba na ye bikoyokana nanu, bikobianga biso na boyambi, na bolobi lisusu: ¡°Tozali na lóngo na kuruse na ye, tobikisami. Tozali na eloko moko ekokamba biso: na kuruse na ye, tosombami. Tozali na elikya moko: na kuruse na ye, tobikisami mpe toyambani mpo ete eloko te, moto moko te akoki kokabola biso na bolingo na ye. Boyamba Mokonzi mpo toyamba elikya, pamba tè na ye lisanga, tokozinda te¡±, ekobaki ye.
¡°Lelo, ezali biso baye tozali kotambola na esika eye, na losambo na biso, na elembo ya elikya, na bosambeli mpo na Papa François¡±, asukisaki liboso ya kobanda Mibombamo.