ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Senegal, il nunzio mons Sommertag invitato ad una Ziarra dalla comunit¨¤ musulmana. Prima volta in Senegal. 01 febbraio 2025 Senegal, il nunzio mons Sommertag invitato ad una Ziarra dalla comunit¨¤ musulmana. Prima volta in Senegal. 01 febbraio 2025 

Ntoma ya Papa na S¨¦n¨¦gal azalaki mobengami ya lokumu na lisanga ya ba musulman

Mpo na mbala ya yambo na S¨¦n¨¦gal, ntoma ya Papa abengamaki, mokolo ya poso ya yambo ya sanza ya mibale, na mbala ya ntuku misato na misato ya Ziarra oyo esalemaka mobu na mobu na Bambilor, pembeni na Dakar. Liboso ya lisanga ya ba musulman, Mgr Waldemar Stanislaw Sommertag alobaki likanisi ya Papa Fran?ois ete na kombo ya Nzambe , esengeli ntango inso kosangisa mpe kokabola te.

Jean-René Bompolonga

Esalemi mbala ya liboso na Sénégal, ntoma ya Papa abengamaki na Ziarra ya Bambilor. Mgr Waldemar Stanislaw Sommertag, ntoma ya Papa na Sénégal, na Mauritanie, na Cap-Vert mpe na Guinée-Bissau kobanda sanza ya libwa ya 2022, elongo na ba sango mpe ba mamelo ntuku mibale, azalaki na botali ya mobu na mobu eye ba musulman basalaka na batindami na bango.  Na Bambilor, na monyele ya mboka mokonzi Dakar, Ziarra esalemaki na Khalife général Serigne Thierno Amadou Ba.

Na kombo ya Nzambe, esengeli ntango inso kosangisa mpe kokabola te

O eleko ya bolobi masikulu, motindami ya Vatican atondaki botondi Khalife, mpo na bobengami na ye Alobaki likanisi ya Papa François na oyo etali lisolo ya biyamba. Papa akondima na ¡°mozindo ete kofanda lisanga na kimia mpe na botosi ezali eloko esimbi bomonisi ya moto mpe ya molimo ya moko moko mpe bondimi na eyamba nionso, ata ezali na likambo ya bokeseni, azali na mosala ya kokutanisa bato, mpe na kombo ya Nzambe, esengeli ntango inso kosangisa mpe kokabola te¡±, elobi communiqué moko ya ba spiritains ya Sénégal, baye bazalaki na ntoma. Nsima ya bolobi liloba na ye ya boboto, Mgr Sommertag asambeli mpo na lisanga ya bana ya Sénégal mpe apesaki médaille moko ya bronze mpe tableau ekolakisa Santu François y¡¯Assise na sultan ya Egypito.

Kaka na molongo ya likanisi ena, Khalife général abengaki bana ya Sénégal na kokona boboto, bomoko mpe sembo kati na bango, liboso ya mosolo. ¡°Bolingo mpe boyokani bisengeli bizala biloko ya ntina biye bikosimba ba relation. Mbongo mpe mposa ya moto bizali kobebisa mokili¡±, elobaki ye lisusu, na botondi bulamatari ya Sénégal mpe bakonzi ndenge na ndenge babengamaki na likita ena.

Likambo ya molimo ya islam liboso ya biloko

Ziarra ezali botali moko ya losambo ekosalemaka na eleko na yango mpo ete ba musulman basalaka na moko ya mokambi ya milimo to na bisika bisantu na bango. Ezali mokolo moko ya bomanyoli mpe ya losambo, kasi mingi mpenza ya bozongeli boyokani ya bondimi mpe ya esengo na mokambi ya milimo na bango. Likonzi ya likambo ya mbala ya mobu 2025 ya ntuku misato na misato ya Ziarra ya Bambilor ezalaki ¡°likambo ya molimo ya islam liboso ya biloko: nzela nini mpo na musulman ya Sénégal ya lelo?¡±. Ziarra ya Bambilor ezali bokutani ya mwinda na manaka ya milulu ya eyamba na ekolo Sénégal. Ekosangisa mobu na mobu ba nkoto ya ba pèlerins bawuti bipayi binso ya ekolo. Ezali Khalife Thierno Mouhamed Bachir Tali oyo akambaki bokutani ya ntuku misato na misato oyo ezali eleko ya molimo ya bokaboli mpe ya bokanisi mikano likonzi ya islam.

Soki ezali mbala ya yambo ntoma ya Papa azala na Ziarra, makutani kati na bakristu na ba muslman bizali kosalema mingi na Sénégal. Lisolo ya islam mpe kimokristu ezali likambo moko ya motuya eye ezali kolakisa bomipesi ya biyamba mibale ya kofanda lisanga na molimo ya botosi epayi na epayi mpe ya bososoli. Sénégal ekotangemaka mingi lokola ndakisa na lolenge ya bofandi na boboto kati na biyamba mibale.   

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 13:16