ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.26 Monsignor Paul Richard Gallagher al Segmento di Alto Livello della Conferenza sul Disarmo 2025.02.26 Monsignor Paul Richard Gallagher al Segmento di Alto Livello della Conferenza sul Disarmo 

Mgr Gallagher akolendisa mpo na mosala ya molende zambi ya botiki mandoki

Na Gen¨¨ve, Secr¨¦taire ya Vatican oyo atalaka makambo ya boyokani na Bikolo mpe masanga ya mokili abimisaki ¡°bozindo ya bobangi¡± ya Vatican liboso ya bobangisi eye ekowuta na ba arme nucl¨¦aire. Ezalaki na bokutani ya 2025 ya liyangani etali botiki mandoki ya ONU.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

¡°Misolo bebo bikobima nzambi na likambo ya ba soda, biye bileki na mosika oyo esengeli mpo na bobateli eye elongobami, bikotinda bopoti mbangu na bozui mindoki. Bopoti mbangu ena ekolembisa mpe ekomema epayi esusu makoki maye ya kosilisa kimobola, bobongisi bosembo, botei mpe ya bobateli na bokono¡±. Oyo ezali lolenge Mgr Paul Richard Gallagher, Secrétaire ya Vatican na oyo etali makambo ya boyokani na Bikolo mpe masanga ya mokili, alobaki na bokutani ya 2025 ya liyangani etali botiki mandoki ya ONU. Ezali kosalema na Genève kobanda 24 kino 28 ya sanza ya mibale. Azuaki libaku ena mpo na bopesi mbote ya Papa François na baye banso bazali na bokutani wana.

Na lisikulu na ye, Mgr Gallagher alakisi ete ¡°na lisanga, lokola libota ya bikolo, tokoki kozua mikano ya sembo mpe ya molende zambi na botiki banso mindoki, na lolenge eye elongobami na nse ya boyangeli ya mokili ya makasi¡±.  Alakisi ete ¡°lokola bitumba bizali kokoba na bobebisi makambo ebele na mokili, bizali kaka mpo na bolamu ya baye bazali kosala mandoki¡±

¡°Mokangemi na likambo eyebani moto na makolo te¡±

Mgr Gallagher alakisaki lisusu tè Liyangani ya botiki mandoki ¡°ezalaki mokangemi na likambo eyebani moto na makolo te¡± eye ewumeli mibu na mibu ¡°na bozangi lotomo ya bosololi lolenge esengeli¡±. Abakisi ete likambo liyangani eye esalemaki ezalaki mpo na bozui bisaleli ya bikolo ebele zambi na botiki mandoki mpe bobimisi biyano biyebani. Mpo na ye, ¡°bato ya mokili mobimba bazali na bosenga ya komona masolo maye matali botiki mandoki bibota mbuma malamu¡±.

Lotomo mpe sembo ya kozala na masolo

¡°Yango wana, elobaki ye lisusu, Bikolo binso bizali na lotomo -na sembo lokola- ya bopesi makanisi mpe bozali na masolo mana¡± Atalisi ete ¡°bobakisi mandoki ebele bilongobani te na mabongisami ya Charte ya ONU eye Bikolo bikomipesa na bozui lisanga mikano makasi zambi na kokima mpe kolongola bobangisi nionso ya boboto¡±. Ayebisi bango mbela ya Papa François oyo alobaka ete ¡°kokitisa mosolo bitali makambo ya ba soda mpo na bibundeli¡± mpe ¡°kosalela mwa mosolo moke ya oyo etindamaki ya bosombi mindoki nzambi ya kokela Fonds mondial moko. Fonds ena ezali mpo na kosilisa nzala mpe kosunga bikolo bizangi makoki na bobongisi makambo bitali botei mpo na botomboli ya seko ekolo mpe kobunda na likambo ya klima¡±.

Liboso tè eleko esengeli eleka

Mgr Gallagher abeti lisusu nsete na oyo etali ¡°koleka likanisi ya kobunda mpe ya boponi likanisi ya bokutani¡±. Vatican alendisi Liyangani ya kotia liboso liboso lolenge ya kosala na lombangu mpe bomipesi nzambi na bokomi na boyokani ekomonana mpe ekowumela mpo na bolamu ya banso, ¡°liboso tè eleko esengeli eleka¡±.

 

  

27 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 11:58