M¨¨re Teresa ya Calcuta akomami na calendrier romain g¨¦n¨¦ral
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
« Abiki na Nsango Elamu na mozindo mpe molende, santu Teresa ya Calcutta azali nzengeneke ya lokumu mpe libaku malamu ya mosala na bomikitisi. Pamba tè alingaki azala kaka moto ya nsuka te kasi mosali ya bato ya nsuka, akomaki ndakisa ya mawa mpe elili ya solo ya Bon Samaritain », elobi mokano ekokomisa bokumisi ya molimo ya santu Teresa ya Calcutta na manaka ya rite ya Roma, mokolo ya mitano ya sanza ya libwa, lokola mémoire facultative.
Mokano ena etiami maboko na préfet ya dicastère ya Culte divin mpe Discipline ya ba sacramento, episkopo ya lokumu Arthur Roche, ebongisi mpo na nsima « esengeli kokotisa kombo na ba manaka nionso mpe buku ya losambo mpo na kosala Misa mpe na Losambo ya ba Ngonga, molimo ya sika, na bosaleli ba buku ya losambo bibakisami na mokano ewuti kobima mpe bikobongolama, bikondimama mpe bikobimisama na Masanga ya ba Episkopo nsima bondimami na dicastère eye ».
Mère Teresa ya Calcutta, ndakisa ya mawa
Episkopo ya lokumu Arthur Roche alimboli tè bokomisi ena, ¡°elingami na Santu-Papa ezali eyano na ba bolombi ya ba episkopo, ba sango mpe masanga ya bandimi, mpe na lolenge ya mosala ya molimo ya santu Teresa engengaki na mokili mobimba, elingi alakisa ye lokola etatolami moko ya makasi ya elikya mpo na baye babosana bango na bomoi¡±. Mpo na wana, ebakisaki episkopo ya lokumu mwana ya Grande Bretagne, ¡°na liteya na ye o eleko ya misa epayi wapi esalemaki molulu ya canonisation ya santu Teresa ya Calcutta (4 ya sanza ya libwa 2016), Papa François alakisaka ye lokola motambuisi ya ngolu ya mawa ya likolo eye, lokola ¡®mungwa¡¯ ekopesa pimbo na nionso mpe ¡®mwinda¡¯ ekongengisa molili, akotika elembo na nionso azalaki kosala¡±. Préfet ya dicastère mpo na Culte divin mpe Discipline ya ba sacramento, alobi lisusu ete ¡°na mosala na ye nzinganzinga ya bituka mpe nzinganzinga biye bizalaki¡±, santu Teresa ya Calcutta ¡°akowumela kino mikolo na biso, lokola ndakisa ya makasi ya pembeni ya Nzambe epayi ya babola kati babola¡±.
Boyambi mpe likambo ya molimo
Na polele na ba buku ya losambo ya misa ena, ¡°losambo ya bosangisi ekofungola motema na likambo ya molimo na ye, mbela ya kosepelisa mposa ya mayi ya Yezu-Kristu na ekulusu na boyanoli na bolingo na mposa ya baye bazangi¡±, elobaki ye. Na yango ¡°tokolela epayi ya Nzambe Tata mpo na bolandaka ndakisa na ye, tokoka kopesa Kristu oyo azali na bandeko na biso ya mibali mpe ya basi baye bazali na mpasi¡±. Mpo na lectionnaire, elobi episkopo ya lokumu, litangi ya yambo ezali mokanda ya profeta Isaya na oyo etali kokila bilei ekosepelisa Nzambe (cf. Is 58,6-11), elandami na loyembo 33, ¡°Na kopambola Mokonzi o eleko inso¡±. ¡°Nsango Elamu, alléluia elekaki liboso, ekolakisa mingi mpenza emoniseli ya mibombamo ya Bokonzi bwa Nzambe na bana mike (cf. Mt 11, 25) mpe ekotisi mokanda kitoko ya nsango elamu lokola ekomami na santu Mateo eye, nsima ya botangi misala ya mawa, ezali na maloba bilandi maye: Mère Teresa apesi yango bomoi makasi: ¡°Oyo nionso bosali na moko ya bana mike baye ya bandeko na ngai, ezali nde na ngai bosali yango¡±. (cf. Mt 25, 40)¡±
Na oyo etali ¡°Liturgie des heures, mpe nsima ya note hagiographique, litangi ya mibale ya Office ya botangi ezali mokanda moko bazui yango na mokanda santu Teresa akomelaka sango Joseph Neuner na 1960, kuna na kati, na bofungoli molimo na ye, alakisi molili ya bozangi Nzambe eye ye afandaki ba mibu ebele, kasi apesaki yango na esengo na Nzambe, mpo ete na bondimi mokakatano ena na motema sembo, milimo mingi bingengisama¡±. Ba buku ya losambo bikosuka na ¡°bokumisi Martyrologe romain eye ebongisi ye na esika ya yambo ya bikumisami ya 5 ya sanza ya libwa¡±
Mokuse kasi monene na bolingo
Episkopo ya lokumu alingi ete bokotisi bokumisi ya santu Teresa ya Calcutta na Calendrier romain général ¡°esunga biso na botali mwasi wana, mwinda na elikya, mokuse kasi monene na bolingo, nzengeneke ya lokumu mpe libaku malamu ya mosala na bomikitisi na bobateli bomoi inso mpe baye banso babwakama, batiama pembeni mpe bayinama ata na nkunku ya libumu ya mama na bango¡±. Mere Teresa abotami na libota moko y¡¯Albanie, na Skopje, mokolo ya 26 ya sanza ya mwambi 1910, mpe azuaka baptisimo na kombo ya Gonxha Agnes. Kobanda bomwana na ye, baboti na ye bamesanisaki ye na kobika na bokumisi Mokonzi mpe na kosunga baye bazangi.
Ntango inso azali pene ya kotelema mpo na babola mpe baye bazangi, amipesaki lisusu makasi na bobateli bomoi ebotami. Na lisikulu na ye ya bozui prix Nobel de la paix, mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya zomi 1979, alobaka ete ¡°mobomi monene ya boboto [..] ezali bolongoli zemi¡±. Papa Yoane-Polo ya mibale akomisaki mwa esengo Mere Teresa mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya zomi 2003. Apelisaki ¡°mwinda ya bolingo, esengeli kokoba mosala ena. Mokili ezali na mposa na yango¡±, elobaka Papa mwana ya Pologne na lisanga ya bandimi.