Episkopo ya lokumu Parolin aboyi bobengani ya bana ya Palestine na Gaza
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Proche-Orient mpe Ukraine bizali kati na makambo bilobamaki na episkopo ya lokumu Pietro Parolin o eleko ya bokanisi botiani maboko ya b¡¯Accords ua Latran, esalemaki na ntango ya molulu moko n¡¯ambassade ya Italie na Vatican, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya mibale, liboso ya mokonzi ya ekolo ya Italie, Sergio Mattarella mpe mokambi ya Conseil, Georgia Meloni.
Solution ya Bikolo mibale, ezali kaka
Vatican azali ntango inso na bokengi na oyo ezali koleka na Gaza. Bato ya Palestine basengeli bazua makoki ya kotikala na mabele na bango: ¡°Ebongi te babengana bango na mboka na bango mpe ezali likambo moko ya ntina¡±, elobaki episkopo ya lokumu Parolin o eleko ya molulu. ¡°Moto moko alakisi tè, na ngambo ya Italie, ekosala bobendani na Proche-Orient. Bikolo ya pembeni bandimi yango te, toyokaki ndakisa mokonzi ya Jordanie koloba mikolo mileki ¡°te¡±. Lolenge ya kosilisa likambo ena, ekobaki episkopo ya lokumu, ¡°ezali eye ya Bikolo mibale pamba tè wana elingi kolakisa kopesa elikya na bato¡±. Ministre ya Italie ua makambo ya bapaya, Antonio Tajani, amonaki mpo na ye ete likambo ena ekoki kobongwana, na bomoni ete ezali na elikya mwa moke ya malamu mpo na kokende liboso: ¡°Tozali kosala nionso oyo ekoki na makasi na biso mpo na bobateli bopemi ya bitumba, mpe nalingi kolikya ete ba otages bakobima¡±
Boboto moko ya sembo na Ukraine
Oyo etali Ukraine, diplomatie ezali kokende liboso, na botali ndenge mokonzi y¡¯Amerika Donald Trump mpe moninga na ye ya Russie Vladimir Poutine, basololaki na nzela ya singa. Episkopo ya lokumu Parolin alobaki lisusu ete ¡°boboto moko ya sembo ezali na ntina¡± mpe ezali na ¡°boningani ebele, mpe na bofungwami ebele¡±. ¡°Tokolikya, ebakisaki ye, ete nionso oyo ekokokisama mpe tokolikya ete tokoki kokoma na boboto moko, eye, mpo na ezala makasi, ewumela, esengeli ezala boboto moko ya sembo, esangisa baye banso bazali na kati ya likambo yango mpe bobosani te mibeko ya droit international mpe masakoli ya ONU. Oyo nionso basengi ezali na ntina pamba tè esengeli kosukisa bobomi bato¡±. Antonio Tajani, na ngambo na ye, asengaki ete Union européenne mpe Ukraine bazala na kati ya ba masolo bikosalema.