Episkopo ya lokumu Czerny akei mobembo na Liban, nzeneneke ya lisungi ya Papa
Jean-René Bompolonga ¨C Kinshasa
Kobanda 19 kino 23 ya sanza ya mibale, episkopo ya lokumu Michael Czerny akozala na manaka makasi, mingi mpenza n¡¯Assemblée plénière ya ba patriarche mpe ba episkopo katoliko ya Liban mpe bokutani moko na grand mufti na Tripoli. Ekozala bokutani ya yambo kati na episkopo ya lokumu moko na mokonzi ya likolo koleka ya islam ya ekolo. Lisusu, episkopo ya lokumu akoleka na ekolo moko etungisami na mikakatano ya nkita, na mindondo ewumeli ya politiki mpe bitumba na ekolo Israël.
Lokola manaka na ye ebongisami na dicastère, episkopo ya lokumu jésuite akokamba ngonga moko ya losambo na libongo ya Beyrouth mpo na kokanisa bopanzoli esalemaka mokolo ya minei ya sanza ya mwambi ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale eye ebomaka bato ebele mpe mingi bazokaka. Akokutana na bilenge, na ba migrants na baye bakima ba mboka na bango. Akosala nionso wana na bokanisi papa François oyo azali na lopitalo ya Gemelli. ¡°Tokotika ye, ye mpe libiki na ye, na Notre-Dame ya Liban »
Episkopo, ntina ya mobembo na yo na Liban ezali nini?
Nazali kokende kuna na bobengami ya patriarche y¡¯Antioche ya ba maronite, episkopo ya lokumu Bechara Boutros Raï. Bobengami esalemaki na sanza ya zomi na moko elekaki kasi ebongisamaki te kokende kuna, sik¡¯oyo nazali na esengo ya kokende mpe kotatola mosala esalemi na Eklezia ya Liban, mingi mpenza nsima ya etumba eye ebengani ba milio ya bato bakima ba mboka na bango koleka sanza misato.
Liban ezali ekolo moko etungisami na mikakatano lolenge na lolenge. Na mobembo na yo kuna, nsango nini olingi omemela bango?
Nsango na ngai ezali ete Santu Papa akokanisa, akosambela, azali lisanga mpe akotinda bolingo na ye na Liban. Ezali nsango ya ntina eye nazali na esengo ya komema na Liban. Nakanisi ete mpasi bandeko ya Liban bayoki ba mibu miye ezali bongo nsango ya elikya. Molende na bango liboso ya mikakatano bebo, biye bizali kokoba, kasi bafandi na mayele mpe bokeli elakisi ete bazali na elikya.
Eklezia ya Liban ekosala mpo na kosunga baye bakimi ba mboka na bango
Eklezia ya Liban ekosala mpo na kosunga baye bakimi ba mboka na bango. Lokola esili ezindi na mikakatano ya nkita makasi, Liban ezali esika etumba ya makasi kati na Hezbollah mpe Israël. Eklezia ekobongama mpo na boyei¡.
Lisolo na Grand Mufti, cheikh Abdel Latif Derian, mokonzi ya likolo ya islam sunnite na Liban, ezali mpe na manaka.
Nazali na esengo ya kokoka kokutana na ye. Emonani ete nazali episkopo ya lokumu ya yambo ya kozua libaku ya bokutani ena mpe ya koloba na ye mbala moko. Nazali na esengo ya koyeba ete Liban ezali ekolo moko ya lisolo epayi wapi misala -maye na komona- ba muslman na ba katoliko bakosala lisanga mpo na kobunda liboso ya mikakatano mpe ya minyoko. Emonani ete ezali ndakisa elamu ya bondeko ekotambola.
François mpe liboso na ye Yoane Polo ya mibale babengaki Liban « ekolo- nsango ya bofandi lisanga mpe na kimia », na lisikulu liboso ya ba ntoma ya bikolo na Vatican na sanza ya yambo ya mobu 2025. Elikya na yo ezali nini mpo na ekolo eye ?
Elikya ya monene ya Liban ezali ete akoka kokende liboso, azala na makasi ya kobunda na mikakatano na ye, akima te mpe amitika te batindika ye na nsuka. Bozui biyano ezali pete te, tosengeli kosala makasi mpo na kosala yango lisanga. Wana nde esika elikya ya solo ebotamaka, elikya ya kibokristu, boyambi na nsekwa mpe na bomoi eye Kristu amemela biso.