Bilenge ya Isra?l, ya Palestine mpe y¡¯Amerika basangani mpo na boboto
Jean-René Bompolonga
¡°Esika nakola, bayebisa biso tolobanaka te. Ezali likambo moko ya monene ya kokitisa bomoto epayi kuna, na yango koyekola koloba mpe koyoka lisolo ya moninga ezali na ntina¡±. Wana ezali likambo ya mpasi elenge mwasi ya Israël Abigail Szor atatolaki mpo na kolakisa ntina ya likanisi ¡°Meaning Meets Us¡±. Ezali likambo ekosangisa biyamba mpe bonkoko epayi wapi bilenge musulmans, bayuda mpe bakristu bakokabola makanisi na oyo etali bokutani mpo na botongi boboto.
Esalemi kobanda 2 kino 5 ya sanza ya mibale na cité ya Vatican, lisanga ena ebotami na mposa ya kosala bisika ya masolo nsima ya bokotisi mobulu Hamas asalaki na Israël na sanza ya zomi ya 2023. Bayekoli ya Université hébraïque ya Yelusalema babimisi likambo eye mpo na kosunga bososoli kati na bilenge bawuti bipayi na bipayi. Lisanga ya bandimi ya Scholas Occurrentes ebongisaki bokutani ena, eye likambo ya motuya ezalaki bolakisi makanisi babongisaki epayi Santu-Papa na nsuka ya audience générale ya mokolo ya misato 5 ya sanza ya mibale, na ndako ya makita Polo ya motoba.
O eleko ya bokaboli makanisi na mokuse na nsuka ya audience, bapesaki na Papa mokanda moko na sweat-shirt moko. Na mokanda wana, bayebisi Papa ete basololi mituna ya makasi mikolo mileki mpe basemboli ete bazali koluka boyokani te, kasi makoki ya koyeba basongola na bapakala.
Na bokutani ena, bana ya Israël, ya Palestine mpe y¡¯Amerika bazui mokano ya kotia pembeni bikeseni na bango mpe kokima masikulu ya koyina mpo ¡°na bozui lisolo moko elongobani¡± mpe koyekola kososola nini moninga alobi. ¡°Nayaki mpo nalingi mituya bisila¡±, elobaki Abigail, na bolakisi ba autocollants mibale bikangemi na polo na ye. Moko ekolakisa bato ya Palestine 47.000 babomi bango na Gaza, mosusu mikolo 488 bileki kobanda bokotisi mobulu ya Hamas mpe bokangi ba nkama ya bana ya Israël. ¡°Nalingi te etumba ekoba, nalingi te ba otages bakufa mpe bakoka kozonga bipayi na bango te, nalingi te makila esopana mingi na ngambo ya Gaza. Nazali na baninga na bisika mibale, nalingi bango mpe bazali na motuya epayi na ngai¡±, elobaki elenge mwasi ya Israël.
Isabel Gonzalez, oyo azali koyekola na Université Notre-Dame n¡¯Amerika, asepeli lolenge asukisi mobembo na ye na Roma na bopesi mbote na Papa François. Alingi azonga na ekolo na ye mpo akabola masolo ye ayoki, maye ye asali mpe mateya ye azui, mpe mpo na kosunga molende ezali kosalema mpo na boluki boboto. ¡°Tolingi banso tofanda na kimia mpe tozala na esengo¡±, elobaki ye.
Epayi ya Maysan Madi, Arabe moko ya Palestine, alobaki ete ezali mosala se moko amoni. ¡°Nazali mpenza mokristu te, kasi nayoki bosantu mpe monene ya ndako ya makita, mpe lisikulu ya Papa ezalaki makasi koleka. Nakanisi ete bato banso bazalaki wana, atako bawuti bipayi na bipayi mpe biyamba na bango, bayokaki yango¡±.
Na lisalisi ya lolenge ya koteya ya Scholas, ebongisami na art, bilenge bakosalela maloba ya ntoki mpo na komona lisusu lolenge makambo bizali ya solo, bosololi na lisolo ya bomoi ya bango moko mpe kokolisa masolo ya sika na lisanga. Basalaki mpe ¡°botamboli ya ba ngongi¡± na ba quartiers ebele ya Roma.
Bomipesi ya Scholas Occurrentes mpo na lisolo kati ya biyamba
Scholas Occurrentes ekelami na Buenos Aires lokola mosala ya koteya ekambamaka na Papa ya sika François, Jorge Mario Bergoglio pembeni ya bateyi Enrique Palmeyo mpe José Maria del Corral. Likambo na ye ya motuya ezalaki kosangisa bilenge ya biyamba lolenge na lolenge (ba katoliko, bayuda mpe ba musulmans) na esika ya lisolo mpe ya kofanda lisanga. Kobanda 2017, lisanga ena esali makutani motoba ya biyamba na mokili, na botalisi bomanyoli epayi na epayi mpe boboto. Na lisungi ya Papa François, Scholas emimonisa lokola lisanga ya motuya na oyo etali lisolo ya biyamba kilikili, ekolisi bokasi na ye na ba projets artistiques mpe éducatifs maye bikosangisa bilenge bawuti bipayi na bipayi.
Moko ya misala ekamuisa bato ya Scholas ezalaki bosali na mobu 2023 fresque murale moko ya koleka kilometre minei o eleko ya Journées mondiales ya jeunesse na Lisbone, eyebani na kombo ya ¡°Sixtine ya jeunesse¡±, kosala yango esengaka mosala ya bilenge ya biyamba ebele mpe bonkoko. Na mobu 2024, lisanga ememaki liloba na ye ya bomoko na Indonésie, epayi wapi koleka bilenge 1.000 ba katoliko mpe ba musulmans batongaki polyèdre moko ya monene, ekolimbola boyokani kati na biyamba. Misala mina, bisungami na Papa François, bikolakisa lolenge nini art, education mpe bomipesi na kati na biyamba bikoki kobongola bikeseni na gbagba ya boboto mpe ya elikya.