ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Images of the fourteen new saints are hung on the facade of Saint Peter's Basilica Images of the fourteen new saints are hung on the facade of Saint Peter's Basilica 

Vatican aponi batindami mibale mpo na ba Instituts ya Verbe Incarn¨¦

Na communiqu¨¦ moko eye mokambi ya sika, mamelo Brambilla, atie loboko, dicast¨¨re eye etali Bomoi ya bamibonza alobi mpo ya boponomi ya Mgr Satu¨¦ Huerto lokola motindami mpo na Institut ya Verbe Incarn¨¦, mpe mamelo Clara Echarte, mpo na ba Servantes du Seigneur mpe ya Vierge ya Matar¨¤. Mokano ezuamaki nsima ya botali Institut ya basi, mpe na bolandi boponomi ya episkopo ya lokumu Abril lokola commissaire ya Institut ya mibali.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Dicastère etali Biteyelo ya Vie consacrée mpe ya ba Sociétés de Vie Apostolique eponi batindami mibale ya Papa mpo na biteyelo mibale ¨C ya mibali mpe ya basi- bizali ya libota ya Verbe Incarné, mpo na kosunga bango na mateya, discipline religieuse, apostolat mpe gouvernement. Ezali bongo biteyelo mibale « ya sika » ya congrégation esalemi n¡¯Argentina na mibu nkama moko na ntunku mwambi, na sango Carlos Miguel Buela awaka na Gênes na mobu nkoto mibale na ntuku mibale na misato.

Maponami ya batindami mibale

Nsango ya maponami mana ekomami na communiqué ebimaki mokolo ya poso ya zomi na moko ya sanza ya yambo, na dicastère mpo na Bomoi ya bamibonza eye -toloba yango lisusu- « azali na makoki ya kotombola, kotambuisa mpe kotia mibeko mpo na bosaleli batoli ya bankoma masantu, lokola bakobika na yango na lolenge endimami na bomoi ya bamibonza ». Mamelo Simona Brambilla, préfète, atie loboko na mokanda ena, mamelo aponamaki mokolo ya motoba ya sanza ya liboso eleki, mpe na sous-secrétaire, sango Aitor Jimenez Echave.

Mokanda esakoli ete na boyokani na Papa François, Mgr José Antonio Satué Huerto, episkopo ya Teruel y Albarracin, aponami lokola motindami ya Papa ya Institut du Verbe Incarné, Institut religieux clérical, mpe mamelo Clara Echarte lokola motindami ya Papa ya Institut religieux ya basi, Servantes du Seigneur mpe ya Vierge ya Matarà, nionso mibale ya droit ya diocèse, bizali na siège na bango na diocèse ya Velletri-Segni (Italie).

Mokano

«Kobanda biteyelo bina bisalema, elobi communiqué, discatère eleko nionso akolandela na bokebi makasi, makambo ya biteyelo na bangp. Mokano ezuamaki na nsuka ya botali Institut ya basi¡± ekambemi na mamelo Echarte ye mei, na basali basusu, mpe ¡°na bokobi na lisungi ya episkopo ya lokumu Santos Abril y Castello, commissaire pontifical ya eteyelo ya mibali¡±.

¡°Likanisi ezali ya bokobi kosunga biteyelo mibale ya sika ya bomoi ya bamibonza, mingi mpenza na eye etali formation, discipline religieuse, apostolat mpe gouvernement¡±, elobi communiqué.   

11 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 14:47