P¨¨lerinage moko ekosalema Via della Conciliazione kino Ekuke Esantu
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Bato bebo bazali koleka mokolo na mokolo na Ekuke Esantu ya basilique Santu-Petelo. Kobanda mokolo ya ntuku mibale na minei eleki, mikolo zomi na mitano bileki, bato 545.532 balekaki, elobaki mokolo ya mibale ya sambo ya sanza ya liboso dicastère ya Bopanzi nsango elamu, lisanga ezali kokamba Jubilé 2025.
Kobanda piazza Pia ya sika, efungwamaki na kati ya sanza ya zomi na mibale, ba volontaire babongisi kobanda Via della Conciliazione, lokola ba pèlerin kino Ekuke Esantu na basilique ya Vatican.
Ndako ebongisami ya koyamba ba pèlerins etiami o eleko eye, elakisi na bandimi lolenge ya kotambola ya molimo mpo na bozali na Jubilé. Ba volontaire ebele, bazali koloba minoko ebele mpe bawuti bikolo ebele bazali kozela ba pèlerins mpo na kolakisa mpe kolimbola bango lolenge ya kotambola. Kati na bango, Laetitia, maman ya mibu ntuka sambo awuti na Sicile. ¡°Bato bazali koya, bango moko to ebele, sima basali lisanga ya ba pèlerins. Kuruse moko ekumbami na moko ya lisanga ekokende na pèlerinage. Matangi ebele, nzembo, bisambo mpe tango ya bomanyoli bibongisami na nzela mobimba¡±, elobaki ye.
Azali wana mwa mikolo, Laetitia alobi ete ba touriste na ba pèlerin ebele bayebi mbela ete ya molimo te. ¡°Mawa mingi, bato ebele bayebi te ete pèlerinage ena ekoki kosalema¡±.
Komibongama na lolenge ya molimo na boleki na Ekuke Esantu ekosunga mbongwama ya pèlerinage na ¡°ngonga elamu¡±, elobi ye. Mingi mpenza, ebakisi Piere-Olivier, pèlerin awuti Fraance na bana na ye zomi na mwasi na ye, ¡°boleki Ekuke Esantu, ekosalema na lombango mingi, tozali na kolekisa ba pèlerins¡±.
Boleki ya Ekuke Esantu ezali bongo na kati ya makambo ya kosala mpo na bozui bolimbisi ya masumu nionso o eleko ya Jubilé ya elikya. Esengeli lisusu kozua sacramento ya boyokani, kozala na misa mpe kosambela na makanisi ya Papa. Mpo na kosalisa makambo wana, ba misa ebele bikosalema na basilique Santu-Polo, mpe ntubela ekoki kosalem
Mpo na kosala pèlerinage ena, esengeli kokomisa kombo na site ya Jubilé mpo na bozeli mingi te, to kokende mbala moko na esika bazali koyamba ba pèlerins. Soki lisanga eleki bato ntuku motoba, bosengi moko ya bokeseni esengeli kotindama.