Papa akolendisa mpo ya ¡°bolongoli ebundeli na bopanzi nsango¡±
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Ezali liloba moko ekoti mobimba na Jubilé ya elikya, eye ezali bobiangemi ya polele na bato ya kopanza nsango mpo kosala na koboya mokano ya ¡°bobangi¡± mpe ya ¡°bobwaki elikya¡±, ya ¡°kokanisela mosusu mabe¡± mpe ya ¡°kominyokwama mpo ya kosala mabe na mosusu¡±, ya ¡°bokangemi na bindimeli ya lingomba¡± mpe ya ¡°koyina¡± mpe bozui ¡°likambo¡± ya elikya. François akoloba kuna likanisi na ye ya bopanzi nsango moko ¡°etongami na motema kimia, ya pembeni¡± eye ¡°ekoki kopesa elonga ya kolikya¡±
Na botangi Don Tonino Bello, Bernanos, Martin Luther King mpe Benoît ya zomi na motoba, François akoloba liboso lolenge ye amoni eleko eye etondaki na ¡°bopesi nsango ya mabe mpe ya ngambo moko¡±, bosangisi mpe kocontroler makambo mpe ba nsango na ¡°mwa bisika bizali na bokonzi¡±. Bopanzi nsango lelo ¡°ekosalela liloba lokola mbeli¡± mpo ¡°kotinda bansango bikoki kotumola, kopesa nkanda, kozokisa¡±, elobaki Papa. Na bobosani te ¡°kobalusa ebongisami ya bokebi¡±, elingi koloba likambo ya ba algorithmes bikotinda biso ¡°lolenge ya makanisi ya zando¡± mpe ¡°bikobongola lolenge biso tozali komona oyo ezali kosalema¡±. Mpota mosusu, ¡°bolakisi ennemi moko¡± oyo tokolobela mabe na ndenge ekoki mpo toyebana¡±.
Bolongoli nkanda nionso na bopanzi nsango
Mpo na François, ¡°tokoki kondima mokano ena te¡± pamba tè ¡°bokitisi oyo ezali kosalema ya solo na ba slogans ekoki komema eloko moko ya malonga te¡±. Mpo na yango, Papa François azongela yango mbala mingi ya ¡°bolongoli ebundeli na bopanzi nsango, bokomisi yango peto na nkanda nionso¡± mpe mpo na bayi bapanzi nsango bakoma ¡°bapanzi nsango ya elikya¡±
Lokola Bernanos azalaka kozongela yango, ¡°elikya ezali likama ya komeka. Ezali kutu likama ya makama¡±, mpe lokola Benoît ya zomi na motoba alimbolaka ¡°elikya ezali bosepeli eye ezali koleka te kasi likabo ya ¡®kokolisa¡¯, eye ekoki kobongola bomoyi", ¡°likabo moko ebombani, makasi mpe ya kozela¡±, ebakisaki Papa. Na bokangemi na mokanda ya yambo ya Petelo, Santu Papa akopesa maloba misato ya bokangi: ¡°elikya ya bakristu ezali na elongi moko, eye ya Mokonzi asekui¡±, yango ya yambo. Na nsima, esengeli kotelema ¡°bozongisi malamu ya elikya eye ezali kati na biso¡±, bakristu bakolakisa ¡°bozenga¡± ya bolingo ya Nzambe, ¡°lolenge ya sika ya kozala na makambo manso¡±. Na nsuka, bopanzi nsango ya bakristu esengeli ¡°etongama na motema pete, ya pembeni¡±.
Kobimisa kitoko mpe elikya
Wana ba ndoto ya Frnaçois, ya ¡°bopanzi nsango moko ekoki kokomisa biso bato bakotambola elongo na nzela na bandeko ebele ya mibale mpe ya basi, ya kolamuisa kati na bango elikya na bileko biye ya kotungisama¡±, ¡°ya koloba na motema, ya kobimisa te bizaleli bitondi na bokangemi mpe na nkanda kasi bizaleli ya bofungwami to ya bolingo¡±, ¡°kobimisa kitoko mpe elikya, ata na bileko ntango mosusu ya bobwaki elikya¡±, ¡°ya kobimisa bomipesi, bolingo, esengo mpo na basusu¡±, ¡°koyeba bomoto ya moto nionso mpe kobatela elongo ndako ya biso nionso¡±.
Na nionso, Papa alingi te bopanzi nsango moko eye ekotekisa makambo ya lokuta na kobanga, moto akobela ¡°bozali liboso to bolukiluki kosala¡±, mpe eye ekoloba mabe ya basusu. Akolinga kutu mompanzi nsango oyo akosunga baye bazali kolanda ye ¡°ya bozali o kati¡±, ¡°ya bozali pembeni¡±, ya ¡°bozui ya malonga koleka ya bango moko¡±, mpe ya ¡°bokoti na bizaleli na masolo bazali koyoka¡±.
Kobikisa ba mpota ya bato
Mpo na François, ¡°elikya ezali ntango inso likambo ya lisanga¡±, pamba tè ¡°tozali banso kokende na nzela elongo¡±. Jubilé ekolobela biso yango lisusu. Ekolakisa biso ete ¡°esengeli bopanzi nsango moko ya bokebi, ya kimia, ya kokanisa, ekoki kolakisa ba nzela ya kosolola¡±. Papa akolendisa biso bongo ya ¡°komona mpe ya koloba masapo ebele bikomema bolamu, bibombani na masusa y¡¯actualit顱. ¡°Wana ekosunga mokili ya kozala matoyi mangongi moke na bogangi ya bana mike, mwa moke indifférent, mwa moke kokangema¡±, emonaki ye. Ezali bopanzi nsango ena eye ¡°ekoki kosunga na botongi lisanga, ya kosala ete tobimaka mwa moke biso moko, ya komona lisusu ntina ya kotambola elongo¡±.
François akopesa mwa toli na bapanzi nsango, lokola kozala ¡°moto azali pete¡± mpe kobosana ¡°elongi ya mosusu te¡±, koloba na mitema ya moko moko, kotika te ba ¡°réaction instinctive ekonza¡± liloba na bango eye esengeli ¡°kobikisa ba mpota ya bato¡±. Basengeli kokoma banzengeneke mpe batomboli ya ¡°bopanzi nsango ya mabe te, ekopesa liteya ya bokebi, ekotonga gbagba mpe ekotobola bizibeli bikomonana mpe bilomonana te ya eleko na biso¡±, mpe balobi ¡°ya masolo ya elikya, na bozui na motema lobiko na biso banso mpe na bokomi elongo lisapo ya lobi na biso¡±