Na Paris, Episkopo ya lokumu Parolin akobenga ¡°kila?ki moko ekokola mpe ekoningana¡±
Jean-René Bompolonga
Mokolo elandi ya bokutani na ye na mokambi ya bulamatari ya France, Francois Bayrou, episkopo ya lokumu Pietro Parolin akendeki na Quai d¡¯Orsay epayi wapi azalaki na colloque moko, na ntina ya likambo ezalaki ¡°Bokobi mpe sika y¡¯accord Poincaré-Cerretti ya 1924¡±, pembeni ya ministre eye akotala makambo ya bapaya Jean Noël Barrot, ya ntoma ya Papa Mgr Celestino Migliore mpe na mokambi ya Lisanga ya ba episkopo ya France, Mgr Eric de Moulins-Beaufort. Secrétaire d¡¯Etat ya Vatican, na lisikulu na ye, akumisi bowumeli y¡¯accord, ebotami na makomi na sanza ya liboso ya 1924 kati na ntoma ya Papa ya eleko ena, Mgr Bonaventure Cerretti, na mokambi ya Conseil, Raymond Poincaré. Nsima ya ¡°mibu ntuku mibale ya kobendana mpe ya nungunungu kati na ekolo France mpe Vatican¡±, biwuti na bozangi mobeko ebotamaki na mobeko ya 1905 eye etalaki bokaboli ya Eklezia na Lete, accord Poincaré-Cerretti esungaki na botambuisi masanga ya ba diocèse na botosi bokonzi ya bulamatari. ¡°Soki esalaka boyokani te o kati ya Eklezia, moko te akokanisa lelo ya koboya yango¡±, asembolaki episkopo ya lokumu Parolin.
Bondeko ekondimisa botosi ya kilaïki
Episkopo ya lokumu mwana ya ekolo Italia atelemaki na likambo ya France eye eboti kilaïki, ¡°eboyami te na mokano na yango¡±, kasi ¡°kolobela ya moto na moto mpe lolenge ekososolama, ekolobama to ekosalema bikoki kobimisa makambo, mingi mpenza soki esangani na makanisi makoboya eklezia to bikotungisa bokoko¡±. Nabozongeli maloba ya Papa mpo na ¡°kilaïki ya peto¡± na mobembo y¡¯Ajaccio mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya zomi na mibale elekaki, secrétaire d¡¯Etat ya Vatican abengaki na bokolisi ¡°kilaïki moko ekokola mpe ekoningana, ekoki kosala lolenge makambo bizali kokende mpe ya kokolisa boyokani kati ya bakambi ya leta mpe ya eklezia¡±. Soki ¡°boyei ya bato ya bokoko mpe kondima misusu bikotungisa ntango mosusu kilaïki ndenge ebongisami na France¡±, episkopo ya lokumu Parolin abengi koluka likambo esusu ya motuya eboti ekolo France: bondeko. ¡°Bosilisi mikakatano ekoleka na nzela ya botosi bokatikati kati ya bokokani ya bana mboka mpe bonsomi ya makanisi, bokatikati eye yango moko bondeko ekoki kobongisa¡±, elimbolaki ye.
Diplomate ya Vatican alobaki akolikia ete kibokatoliko ekozala, lokola biyamba bisusu, ntango elobama na botosi ya biyamba binso, lokola bikomami na mobeko ya 1905 mpe Mobeko Likonzi ya ekolo France.
Bobongisi lisusu ya Notre-Dame, mbuma ya boyokani elamu kati na Eklezia mpe Leta
Secrétaire d¡¯Etat ayoki mawa mpo na lolenge ya kotia pembeni ntango inso ya Eklezia, na bolobi epayi esusu, esengo ebotamaki na France mikolo ya sambo mpe ya mwambi ya sanza ya zomi na mibale elekaki o eleko ya ¡°bofungoli¡± cathédrale ya Paris. ¡°Esengo ena ezali kaka ndakisa makasi pamba te, kasi liloba ya ba mposa ya moko moko ya kozala na kimia nionso na esika moko esantu eye eleki ba mbula, na bolakisi ba eleko minene ya lisapo ya France kobanda mbula 850¡±, elobaki ye. Mibu mitano nsima ya moto enene eye ebebisaki cathédrale, ¡°Notre Dame, na monene ya bonzenga na ye ezongi mpe ebongisami, epesaki na banso eleko na ngracia, ya bondeko mpe ya bosangisi¡±.
¡°Ndenge nini, kobanda wana, koloba na mwinda ya ndakisa ena ya sika, ndenge nini boyokani ya malonga kati na Eklezia mpe Leta, na botosi kilaïki, bizalaki na ntina makasi mpe kosungana mpo na kozongisa na France eloko na ye ya ntalo ya Paris?¡± amitunaki episkopo ya lokumu. Asukisaki lisikulu na ye na bolobi mposa ya Santu-Papa ya ¡°bobateli boyokani ya kimia mpe ya kotonga kati na bakambi ya Eklezia mpe.Leta¡±.