Kotia Nzambe o kati, libula ya mosala ya Beno?t ya zomi na motoba
Cardinal-pr¨¦fet ya dicast¨¨re mpo na Bokolisi lisanga ya bakristu asambelaki misa mpo na kokanisa Papa Beno?t ya zomi na motoba na crypte ya Vatican, mibu mibale nsima ya liwa na ye. Mpo na episkopo ya lokumu Kurt Koch, Papa ya ekolo Allemagne ¡°azongisaka Nzambe na kati o eleko eye ezalaki komona Ye lokola mopaya mpe ntina te¡±
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
¡°Liteya ya Nzambe ya polele¡± eye azalaki na yango atiaki yango na mosala na boluki kozongisa Nzambe ¡°o kati ya bokebi¡± na ¡°eleko moko Nzambe azalaki komonana lokola mopaya mpe ntina te¡±. Mwa maloba mpo ya kosangisa mosala ya papa moko, likanisi moko na bolingi ¡°moto moko ya malamu solo¡±. Liboso ya nkunda na ye, na crypte ya basilique Santu-Petelo, epsikopo ya lokumu Kurt Koch akambaki mokolo ya mibale misa ya bokanisi mpo na Benoît ya zomi na motoba, oyo akufaka mokolo ya ntuku misato na moko ya sanza ya zomi na mibale ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale na mibale.
Boyebi mosala ya bomoto mpe ya molimo ya Joseph Ratzinger, elobaki episkopo ya ekolo Suisse Kurt Koch na liteya na ye, alobaki mingi na ¡°bokebi ya ntango inso¡± na ¡°bosolo ya Liloba ya Nzambe¡±. Na ¡°logos¡± ena, Papa Benoît ya zomi na motoba azuaki ¡°lolenge¡± ya lobiko. Kasi na ndenge ya ¡°bongo bongo¡± te, na ndenge ya ¡°maloba kaka¡± te, atalisaki mokambi ya dicastère ya Bokolisi lisanga ya bakristu, kasi na liloba eye ezali na ¡°elongi ya solo¡± mpe elongi ena ¡°ezali na nkombo, abengami Yezu ya Nazareth, Emmanuel. ¡°Nzambe na biso¡±, eye ¡°azali komona biso mpe azali kopesa biso motuya, motuya moko epayi wapi bonsomi ya ntina makasi mpo na biso, bato¡±.
Na yango, mpo na Benoît ya zomi na motoba, oyo alobaka mbala ebele mpo na bomoto moko ezali kobika lokola soki Nzambe azalaki te, ¡°likambo ya liboso ya ntina monene ezali ya kosunga bato ya lelo bapusana pembeni na Nzambe, na bosolo na ye mpe na kitoko na ye¡±. Mpe ¡°kotia Nzambe o kati¡±, elobaki episkopo ya lokumu Koch, ezali ¡°libula (³ó&±ð²¹³¦³Ü³Ù±ð;°ù¾±³Ù²¹²µ±ð¡±) ya libela¡± ya théologie ya Papa Benoît ya zomi na motoba. Ye oyo, ekobaki episkopo, alingaka kozongela mbala mingi ¡°na lolenge ya kitoko, elaka ya bobondi: Nzambe azali monene ekoki mpo na bozui esika atako bato bamikitisa lolenge tozali¡±&²Ô²ú²õ±è;
04 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 12:59