Episkopo ya lokumu Parolin ayambami na Matignon
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Bizali mikanda bizui ntina y¡¯Accord international. Bizali mikanda bitindamaki mikolo ya zomi na moko mpe zomi na sambo ya mobu nkoto moko na nkama libwa na ntuku mibale na minei kati ya ntoma ya papa na France, Mgr Bonaventura Cerretti, oyo akokoma episkopo ya lokumu mobu molandaki, na mokambi ya Conseil, Raymond Poincarré, mokonzi ya kala ya ekolo. Conseil d¡¯Etat ya France ekomona mikanda mina lokola accord international ekosangisa France na Vatican eye ekolingisa bosali ya lisanga ya ba diocèse na diocèse moko moko, ekokunda bongo libulu na mibeko ebotamaki na mobeko ya mobu nkoto moko na nkama libwa na mitano eye ebongisaki bokabwani ya ba Eklezia na Leta.
Nsima ya mbula nkama moko, episkopo ya lokumu Pietro Parolin, elongo na ntoma ya Papa, Mgr Celestino Migliore, mpe na bozali ya mokambi ya lisanga ya ba episkopo ya France, Mgr Eric de Moulins-Beaufort, episkopo ya Reims, akozala na colloque mokolo ya minei zomi na motoba ya sanza ya liboso na Quai d¡¯orsay, ebongisami mpo na accord ena eye epesaki nzela na bosali lisanga mpo ya bosali misa, etiamaki na bokambemi ya episkopo mpe ekolanda ba statut type. Botamboli ya mibeko lolenge bikolondana ebebisi soki moke te bobongisami na yango na mobeko ya 1905 lokola Ministre ya yambo ya France Elisabeth Borne alobaka na sanza ya misato ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale na misato.
Mokonzi ya bulamatari ya France, François Bayrou, alingaki kokutana na secrétaire d¡¯Etat o eleko ya boyei na ye. Bokutani na Ministre ya Yambo ekosalema na hôtel ya Matignon mokolo ya misato na ngonga ya zomi na libwa na minute ntuku misato. Ekozala lisolo ya mosala lolenge bulamatari elobi. Na nsima, episkopo ya lokumu Parolin akokende na esika ya mosala ya ministre atalaka mambi ma kati ya ekolo eye ekambami na Bruno Retailleau, ye mpe akotala makambo ya ba misa. Na nsuka, Secrétaire d¡¯Etat akosolola mokolo ya minei na ntongo, na esika ekotalaka makambo ya bapaya, na mokonzi ya boyakani ya France, Jean-Noël Barrot. Likambo moko ya bosololi elobami te, kasi o eleko ya masolo ya boyokani, makambo lolenge bikotambola na mokili bikolobama. Mingi mpenza, ekoki kozala likambo ya Liban, ya Mabele Esantu na Ukraine. Elobami ata moke te makambo matali mingi mpenza ekolo ya France lokola nsuka ya bomoi, eye ekoki kolobama lisusu na Parlement na ba poso bikoya.