P¨¤pa Leon XIV ayambi Mokambi ya ekolo ya Pologne, Karol Nawrocki
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
O mokolo mwa mitano na ntongo, Pápa ayambaki na likita, mokonzi ya sika ya Pologne, Karol Tadeusz Nawrocki. Na nsima, na biro ya Mokomeli ya etukà, asololaki nà episkopo wa lokùmu Pietro Parolin mpe nà Mgr Paul Richard Gallagher, Mokomeli mpo ya boyokani nà Bitùkà mpe ba organisations ya mokili mobimba.
Ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège elobi ¡®te na tango ya masolo ma bango oyo elekaki na esengo, «ba betaki nsete to balobelaki mingi makambo ya mopelengano (ya politiki) ya mboka, mingi mpenza makambo maye mazali na ntina mpo na bato ya Pologne mpe ntina ya koyokana mpo na kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango».
Mobembo moye ya mokambi ya ekolo ya Pologne na Vatikan, epesaki ndingisa ya kolobela makambo mingi na ntina ya mituna mya mokili mobimba, mingi mpenza, likambo lya bitumba na Ukraine mpe bokengi to libateli mpo na mikili mya Pótó.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.