Manaka ya bokutani bwa P¨¢pa L¨¦on XIV na sanza ya zomi (okotobe)
Bansango ya Vatikan
Sanza ya okotobe to ya zomi ekozala sanza ya Yubile ya Elikya, na nzela ya mibembo mingi ya bakristu to bandimi na lilita lya ntoma Petro. Liboso nayino, na mokolo mwa lomingo mwa mitano ya okotobe (05 octobre), ya lomingo la ntuku mibale na nsambo ya mobù, (XXVIIe dimanche), na ngonga ya 10:30 ya ntongo, na esika Saint-Pierre, Léon XIV akosala misa mpo na zubilé ya mokili ya bamissionnaire mpe zubilé ya bato baluki-mboka oyo bakendaka kofanda na mboka mopaya.
Mokolo mwa mosala minei, mwa 9 ya okotobe, na ngonga ya 10:30 na ntongo, bobele na esika ya Santu Petro, Pápa akosala misa mpo na zubile ya bamibonzà, (jubilée de Vie Consacrée), mpe mokolo mwa lomingo, 12 ya okotobe, lomingo la ntuku mibale na mwambe ya mobù (XXVIIIe dimanche du Temps ordinaire), na ngonga ya 10:30 ya ntongo, mpo na libakù lya zubilé ya spiritualité mariale.
Boluboli
Likita monene ya sanza moye ya okotobe ekosalema o mokolo mwa lomingo oyo ekolanda, mokolo mwa 19 okotobe, mokolo mwa lomingo la ntuku mibale na minei (XXIXè) ya mobù, na Esika ya Santu Petro. Léon XIV akosala misa ya kokomisa basantu Ignace Choukrallah Maloyan, Peter To Rot, Vincenza Maria Poloni, Maria del Monte Carmelo Rendiles Martínez, Maria Troncatti, José Gregorio Hernández Cisneros mpe Bartolo Longo.
Na mokolo mwa lomingo oyo ekolanda, mokolo mwa 26 ya sanza ya zomi, lomingo la ntuku misato ya mobù, na ngonga ya 10 ya ntongo, Pàpa akosala misa na ndako-nzambe monene ya Vatican na Santu- Petro. Akosala Misa ya zubile ya ba équipes synodales mpe ya ba organes ya participation, mpe na mokolo oyo elandi, mokolo ya yambo, 27 okotobe, na ngonga ya 17h30 mpe kaka na Basilique ya Vatikan, akosala Misa elongo na ba universitaires ya ba universités pontificales.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.