ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.07.30 likita mpo ya banso 2025.07.30 likita mpo ya banso  (@Vatican Media)

Lolenge kani kolanda malongi ma P¨¢pa L¨¦on XIV o mokolo mwa likita lya banso

Vatikan News ezali kopesa yo libaku lya kolanda malongi ma Tata Mosantu mikolo minso mya misato na nzela ya site na biso mpe ba r¨¦seaux sociaux.

Yango ezali momeseno oyo ebandaki ut¡¯o eleko ya Pápa Pie XI, mpe kobanda na 1925, pápa moko te atiki yango. Mikolo mwa mosàlà misato inso na tongo, Episkopo wa Roma ayambaka bato ya mibembo oyo bazali na engumba ya seko mpo na mwa tango ya bokutani mpe ya mateya.

Likita liye lisalemaka poso na poso, mingi mpenza na esika babengi ¡°Place Saint-Pierre¡±. Na tango ya eleko ya malili, likita lina lisalemaka na Salle Paul VI na Vatikan. Bongo esalemaka boye:

-        Kotánga mokapo moko ya Makomami

-        Mateya ma pápa na likanisi mokonzi moko; ebongisami na boumeli ya baposo ebele

-        Boyebisi na mokuse ya mateya mana na bankota ebele

-        Losambo la Tata wa biso mpe bobenisi lokola mokitani ya bantoma

-        ¡°Baciamano¡±: Pápa apesi mbote na baepiskopo oyo bazalaki wana, na mwa bituluku bya bato oyo bazalaki kosala mobembo ya losambo, mpe na bato babalani ya sika.

 

Botala bisika wapi bokoki kokoto na nzela ya ba plateformes mpe kolanda malongi mpo ya banso (audience generale) na tango ezali koleka (en direct):

 

Na site na biso Vatikan News: finá awa (ici).

Na canal na biso ya Youtube: finá awa (ici).

Na lokasa na biso ya Facebook: finá awa (ici).

Okoki komona mateya mana na bokuse, finà awa (ici).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

01 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 22:32