ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Papa L¨¦on XIV o eleko ya likita ya banso Papa L¨¦on XIV o eleko ya likita ya banso  (@Vatican Media)

Likita ya bans¨®: kob¨¢nga te po na kos¨¦nga po ozala nsomi

?Nay¨®ki p¨®s¨¢ ya mai?: Ezali na maloba maye ma s¨²ka ya Y¨¦zu o ek¨²l¨²su nde L¨¦on XIV at¨¦yaki o eleko ya likita ya bans¨® na esika S¨¢ntu-Petelo mokolo eye ya mis¨¢to 3 ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢. Pap¨¢ alimboli ¡®te bolingo ya s¨®l¨® ekoy¨¦kola kos¨¦nga pe kaka kopesa te. Kos¨¦nga ezali b?ng¨® mosikoli.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Ezali « libakú po ya mokristo: Nzámbe akobikisa kaka na kosála te, kasi na komitika. Kaka na bolóngi mabé na makási te, kasi na kondima kinó na súka botaú ya bolingo ». Ezali bôngó nde Léon XIV azongeli ba ngonga ya súka ya Yézu na ekúlúsu, mokolo ya misáto eye, na bokobi molongó ya matéya etáli « Yézu- Kristu elikya na bisó ». Yézu ayóki pósá ya mai, amónani lokóla « molóngi mókó » te, kasi lokóla « moséngi mókó ya bolingo », akosakola te, akopesa etúmbu te pe akomibátela te kasi akosénga « na bomikitisi » « oyo akoki komipesa te ye mókó »

Ezali pósá mókó ya mai eye ekolakisa pósá mókó ya mozindo ya bolingo, ya boyokani pe ya lisangá, esémbolaki Papá, « bogangi ya bonkútú ya Nzámbe mókó eye, alingaki kokabola nionso na ezaleli ya bisó bato, amitiki po na koyóka pósá ya mai lokóla ». Na kosála bôngó, Nzámbe ayóki soni te « ya kosénga mwá litanga ya mai » pe alobi na bisó mingi mingi ¡®te « bolingo, po ezala ya sóló, esengeli koyékola kosénga pe kaka kopesa te », ekobaki Sántu-Papá.

Tomikoka te

Na maloba maye, Yézu alakisi ¡®te « mókó te ya bisó akoki komikoka » pe akomibikisa ye mókó te. « Bomoi ekosálema kaka tángo tozali makási te, kasi tángo tokoyékola koyamba », elobi Léon XIV. « Bolingo emikómisi mobóla, pe ezali ndéngé waná penza nde asáli mosála na ye, ebakisaki ye, na bosémboli ¡®te « libiki ezali na bomikóka te, kasi na koyéba bomikitisi na pósá na yo pe na likoki ya boyebi koloba yangó na bonsómi ». Ezali bôngó na « likambo mókó ya botiyi motéma » nde bomoto na bisó ekosálema na mwángo ya Nzámbe. Ezali lokóla na kosénga « nde nzelá mókó ya bonsómi ekofúngwama ».

Po na Papá, ezali waná liziba ya elikya ya sóló, po ¡°sóki atá Mwána ya Nzámbe aponaka amikoka ye mókó te, waná pósá na bisó ya mai -ya bolingo, ya motindo, ya sémbo- ezali elembo ya bokwei te, kasi ya bosóló ». Ya sóló, kondima « botaú » ena ezali ya polélé te na eleko na bisó eye ekopesa mbano na « bomikoka, bokási, bosáli », endimi Léon XIV, kasi likoki na bisó ya komitika kolingá pe kosálisa ekomeka malamu bomoto na bisó na eye tokoki kozua pe ezali bôngó « gbagba mókó po ya likoló ».

Kosénga ezali mosikoli

« Yézu akobikisa bisó na bolakisi bisó ¡®te kosénga ezali likambo ya soni te kasi mosikoli », elobi Sántu-Papá, na bolimboli ¡®te, sóki « lisúmu ebótaki soni », « bolimbisi, sóló, ekobótama tángo tokokoka kotála libosó pósá na bisó pe kobánga te tobwákama ».

Papá wa Roma, na ntoki (art) ya kosénga na koyóka soni te pe kopesa atála te, na bondeko pe na bomoi ya pámba, tokoki kozua « esengo » mókó ekomema na bosóló ya ebándeli ya bomoto na bisó: « tozali bikelamu bisálema po ya kopesa pe kozua bolingo ».

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

03 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 13:27