L¨¦on ya zomi na minei (XIV) atindi mabondisi ma ye na ba-Portugal
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
¡°Mabondisi¡± mpe ¡°Bozali pembeni na molimo¡±: nde yango Léon XIV atindelaki mokonzi ya lingomba ya Lisbonne, Mgr Rui Manuel Sousa Valério, nsima ya likàmà ya engbunduka (funiculaire) oyo ebomaki bato zomi na sambo (17 personnes). O mokolo mwa misato, mwa 3 Setembe, nzela ya engbunduka Gloria, oyo ezali moko ya biloko elembo oyo eyebani mingi na engumba-mokonzi ya Portugal, ekendeki kotutana na ndako moko ya etaje, mwa moke nsima ya ngonga ya motobà na mpokwa (peu après 18h).
Atako ntina ya botutani bwa enggunduka ya langi ya mosaka, ekangamaki na nzela ya nkaka mpe ekendaki kokwea na efelo eyebani naino te, bayebi kaka bato zomi na sambo (17) bakufaki, bongo, bato tukù mibale na moko bazokaki (21 blessées). O kati ya bango, mingi bazali bapaya, mpamba te, engbunduka yango ezali eloko oyo bato bayaka na mobembo, basepelaka na yango mpo na kotala mboka.
Na telegrame oyo etiyaki mokoloto mokomeli ya etukà ya Saint-Siège, episkopo wa lokùmù Parolin, Pápa alobi ¡®te alingi ete ¡°bato baye bazoki báyoka malamu, bongo baoyo bazwi mpasi na likama yango bázwa makasi ya elikya ya bokristu¡±. Léon ya zomi na minei (XIV) atondi mpe ¡°botondi ya sikisiki na baye basanganaki na misala mwa lisungi mpe apesaki mabenisi ma bantoma na bato banso, mingi mpenza na mabota ya bawei¡±.
Mbulamatari ya Portugal esakoli mokolo mwa matanga na mboka mpo na mokolo mwa minei. Bato ya mayele bazali naino koluka bilembo mpo na koyeba nini esalemaki. Nzoka nde, Leta Lisbone oyo etalelaka etambwisi ya ba engbunduka ena ya likolo, ekataki misala ya ba engbunduka bisusu bisato mpe ebandaki kosala bolukiluki na kati ya kompanyi na yango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.