ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Darfur, esika mabele ekweyelaki Darfur, esika mabele ekweyelaki  (AFP or licensors)

Mabele ekweyi na Darfour, Bongo P¨¢pa ayoki mpasi mpenza

Na yoko telegrame ekomamaki na Mokomeli mwa etuk¨¤ ya Saint-Si¨¨ge, mpe etindamaki na Episkopo ya El Obeid, Mgr Yunan Tombe Trille Kuku Andali, Papa, ¡°ayoki mawa mingi¡± mpe asambeli mpo na bato baye bazwi likama lina. Azali kosambela mpe mp ona baye bakufi mpamba te, kokita ya mabele mana ebomaki bato koleka 1000 na mboka moko na et¨²k¨¢ ya Darfour, mokolo mwa lomingo 31 ya sanza ya augusti.

Bansango ya Vatikan

 

Na mokolo ya lomingo, 31 ya sànzà ya augusto, mabele ekitaki to eninganaki mpe ebomaki bato mingi na mboka moko ya ngomba-ngomba na Darfour, na westi ya Soudan. Motuya ya nsuka ya bato bakufi ezali nkonto yoko (1000 morts). Nsango epanzanaki kaka na mokolo ya mibale na ntongo, tango etuluku moko ya bato bamandoki bazalaki kokamba esika ena, bongo basengaki lisungi na mokili mobimba.

Maloba ma bobondi ya Papa

¡°Mosantu Papa Léon XIV ayokaki mawa mingi na koyoka nsango ya kobeba ya mboka Tarasin, na etuka ya Darfour-Central na Soudan, mpo na mabele oyo ekwelaki yango¡± elobi telegrame ya Episkopo wa lokumu Pietro Parolin, mokomeli yaetukà ya Vatikan. Mokonzi Ntoma Monene alobi na telegramme oyo ebimaki, oyo eutaki na ndako ya bapanzi-nsango ya Saint-Siège, o mokolo mwa mosala mibale ya sanza ya libwa (2 septembre) ¡®te: ¡°Nazali kopesa elikya na bato banso bazwi mpasi na likama liye mpe nazali na bango pembeni na elimo¡±.

Bansambo ya Leon ya zomi na minei

Papa asambeli mpe ¡°mpo na bopemi bwa seko ya baye bakufi, mpo na baye bazali kolela mpe mpo na kobikisa ebele ya bato oyo babungaki.Tata Mosantu alendisi bakonzi ya Leta mpe bato ba misala oyo bazali kopesa lisungi na ntango ya likama liye, na molende ya bango¡±, elobi lisusu mokanda mwango.

Tata Mosantu asukisi nsango ya ye ya bozalani pembeni, mpe asenga ¡°bobenisi to lipamboli lya Nzambe, abondisa mpe apesa makasi na ekolo¡±.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

02 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 20:03