ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Migranti: Likambo la somo na bokula bwa Y¨¦men,  ba lot¨´k¨¤ ya baluki-mboka balimwa na na mb¨´ etane. Migranti: Likambo la somo na bokula bwa Y¨¦men, ba lot¨´k¨¤ ya baluki-mboka balimwa na na mb¨´ etane.  (ANSA)

P¨¢pa abondeli mpo na baye bazwi lik¨¤ma ya masuwa na bokula ya Y¨¦men

Kati na telegrame oyo mokomeli ya Vatikan, episkopo wa lok¨´mu Pietro Parolin, Tata Mosantu amonisaki mpenza mawa ma ye mpo ya masuwa ezindaki na bokula to libongo ya Y¨¦men. Atiki o maboko mwa motema Ngolu ya Nzambe molimo mwa baye bakufaki na lik¨¤m¨¤ lina.

Bansango ya Vatikan

 

Bato soki tukù sambo na motobà (76personnes) bakufi, mpe balotukà mingi bazali komonana te, nsima ya likàmà lya yoko masuwa. Ezalaki komema mingi mpenza bato ba Ethiopie na bokula ya Yemen. Bakonzi ba Yemen balobi mokolo mwa mosàlà moko (lundi) ¡®te, eye ezali likàmà lya sika na nzela wana etonda makàmà. Engebene na AFP, masuwa mango ezindaki na golfe ya Aden, pembeni ya Gouvernorat ya Abyan, na sudi ya Yémen, esika baye batindaka bato na bamboka misusu, bakendaka kotika baye balingi kokende mikili ya bozwi ya golfe, na ndakisa ya Arabie Saoudite, oyo ezali pembeni ya Yémen.

Bwalé mpe Nsambo ya Pàpa

Lokola azalaki na mawa mingi mpo na ebele ya bato bakufaki na likàmà lyango, Pápa Léon XIV «atyaki baluki-mboka baiké bakufaki na motema ngolu mwa Nzambe Nta bokasi bonso». Asengaki lokola, makasi, libondisi mpe elikya ya Nzambe mpo ya baye babikaki, na baye basalaka mosala ya kopesa lisungi, mpe bato mosusu oyo likàmà enà ekómelaki bango.

Mbula na mbula, bankóto ya bato ya Afrika oyo bakimá-mboka bazali kokatisa Mbu Etane, kolongwa na Djibouti tii na Yémen, na elikya ya kokende na mikili ya Golfe oyo ebimisaka petrole.

O kati ya masuwa yango, ezalaki na bato mingi ya Ethiopie, elobi bakonzi ya misala ya bokengi na gouvernorat ya Abyan, oyo balobaki mokolo mwa lomingo ¡®te:«ezali mosala monene mpo na kolokota bibembe bya bato mingi bakufaki na mai». Liyebisi mosusu eùtaki na OIM (Organisation Internationale pour les Migrations) endimi mpe epai ya AFP ¡®te mingi mpenza, bato nkàmà moko na tukù mitana na sambo (157 personnes) oyo bazalaki na kati ya masuwa, bazalaki bato ba Ethiopie.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

05 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 09:15