ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bato bamobembo na molongo na nzela ya mayi, na ebale ya Caraparu na kati ya zamba ya amazonienne ya ekolo ya Brezil. Bazali komema ekeko moko ya Maria abotami na mbindo te, o mokolo mwa 8 ya s¨¤nz¨¤ ya zomi na mibale ya mob¨´ 2012.  Bato bamobembo na molongo na nzela ya mayi, na ebale ya Caraparu na kati ya zamba ya amazonienne ya ekolo ya Brezil. Bazali komema ekeko moko ya Maria abotami na mbindo te, o mokolo mwa 8 ya s¨¤nz¨¤ ya zomi na mibale ya mob¨´ 2012.  

Mpo na L¨¦on XIV, Kosakola Nsango-Elamu mpe kobatela bikela bya Nzambe, ezali makambo ma motuya mpo na et¨²k¨¢ ya Amazonie

Na telegrame oyo episkopo wa lok¨´mu Pietro Parolin, Secr¨¦taire d¡¯?tat ya Saint Si¨¨ge, atindelaki na mokolo mwa 18 Augusto epai ya episkopo wa lok¨´mu Pedro Barreto Jimeno, mokambi ya conf¨¦rence eccl¨¦siastique ya Amazonie, na ek¨®lo P¨¦rou, L¨¦on XIV alendisi bato ya bamboka ya liboso ete b¨¢sakola nsango ya Klisto ?na ndenge ya polele mpe na bolingo? mpe abakisi mokumba ya kobatela biloko oyo Nzambe akel¨¢ liboso ya baye balingi ?kobebisa yango kozanga kokanisa?.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na boumeli bwa bambula mibale koleka, oyo atambwisaki Commission pontificale mpo na ekolo ya Amérique latine mpe na boumeli bwa bambula koleka tuku mibale (20 ans) oyo alekisaki na Pérou lokola misionele mpe na nsima episkopo, Léon XIV ayebaki malamu makambo mwa elimo, mwa bomoi ya bato mpe ya ezingelo oyo ezali na etúká ya Amazonie. Apesaki mbote na baepiskopo pene ya tuku libwà (90) oyo bayanganaki o mokolo mwa zomi na sambo kino tuku mibale ya sànzà ya Augústo (17-20 aout) na engumba Bogotá, na ekólo ya Colombie. Telegrame wana etindamaki na episkopo wa lokumu Barreto, oyo Pápa ayebi malamu ut¡¯o bazalaki na eleko moko basungi ya baepiskopo ya ekólo Pérou. Likita ya Eklezia mpo na Amazonie (CEAMA), ebotamaki mibu mitano mileki, na 2020, nsima ya Synode ya ntina mpo na Amazonie mpe na exhortation post-synodale oyo elandaki. François nde moto atiyaki mokolo mpe akomaki boye : Querida Amazonia. Ebengami mpo na kotombola synodalité na eteni ya «mabele oyo molingami» wana mpo na kosala elongi ya "Amazone" ya mangomba ya mboka mpe kolanda nzela ya sika mpo na kopalanganisa Nsango-Elamu na «poumon vert» oyo ekabwani na bikolo libwa.

Na Amazonie, komema ¡°mampa ma sika mpe ya peto¡± ya Nsango-Elamu

Léon XIV akanaki kolanda nzela oyo François abandisaki, kasi oyo eutá na likita ya mibale ya Vatikan mpe na mosala makasi ya Lingomba ya Amerika ya Ngelè (Sudi). Pàpa américano-péruvien asengi na ba episkopo ya Amazonie baluka bomoko mpe kolégialité na mosala na bango ya babateli mpate na ndenge misato: ¡°kosakola nsango Elamu epai ya bato banso, kosalela bato ba bikólo bisusu makambo na bosembo, mpe kobatela ndako ya bato banso (Maison commune)¡±. Ezali na ntina ¡®te mpo na Yesu Kristo, biloko binso bizali kozongelama, kosakolama na polele mpe na bolingo monene kati na bato ya Amazonie. Mpo ¡®te tomipesa na kopesa bango mampa ma sika mpe ma peto ya Nsango Elamu mpe bilei bya lola ya Ukaristya, nzela kaka moko ya kozala mpenza bato ba Nzambe mpe nzoto ya Kristu¡±, elobaki Léon XIV.

Mbula sambo nsima, mokitani ya sika ya Petro akundwelaki baepiskopo ya Amazone ¡®te ¡°epai wapi nkombo ya Kristo esakolami, kozanga bosembo ezali kosila, mpamba te, lokola ntoma Paulo alobaki yango, lolenge inso ya konyokola moto na moto ezali kosila soki tozali na makoki ya koyambana lokola bandeko¡±.

Kobatela biloko bizalisami, kasi kogumbamela byango te

Léon XIV alendisi lisusu lotomo mpe mokumba ya kobatela ¡°Ndako¡± oyo Nzambe apesi biso ¡°lokola bakapita ya bolingo¡±, ¡°mpo moto moko te abebisa biloko bya mokili oyo ezali komonisa bolamu mpe kitoko ya Mozalisi¡±. Kasi, Pápa ya lingomba ya saint Augustin akebisaki mpe na likambo mosusu oyo ekoki kokweisa biso: komipesa na biloko oyo Nzambe akelá "¡±okola moombo to mosambeli ya biloko oyo Nzambe akelᡱ.

Lingomba ya Katolike ya Amazonie ekosangana na likita ya bato oyo bakosala likita mpo na mbongwana ya klima (COP30) oyo ekosalema na Belém, na Brézil, kobanda mokolo mwa zomi kino tuku mibale na moko ya sànzà ya novembe (10 - 21 Novembre). Liboso lya likita ya ONU, mokanda moko oyo baeklezya ya Afrika ya Sudi (Afrika, Asia, Amérika ya Sudi mpe Caraïbes) ebimisaki na mokolo ya yambo ya sanza ya nsambo elobaki ete esengeli ¡°kokokana, kosambisa na bosembo mpe kobatela¡± bafandi ya mboka, bato oyo bazali na makoki mingi te ya komibatela, mpe bikelamu ndenge na ndenge.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

19 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 13:09