ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Papa L¨¦on ya XIV na likita po ya banso ya mokolo ya 27 ya sanza ya mwambi Papa L¨¦on ya XIV na likita po ya banso ya mokolo ya 27 ya sanza ya mwambi  (@Vatican Media)

Likita po ya bans¨®: kaka bomoi m¨®k¨® eb¨²ngi po ya bolingo ekozuama na suka

Elikya ya mokristu ezali bokimi m¨®k¨® te kasi mok¨¢no m¨®k¨®. Wan¨¢ ezali motindo ya lit¨¦ya ya L¨¦on ya XIV ya mokolo ya mis¨¢to ya 27 ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi o eleko ya likita ya bans¨® na nd¨¢ko ya likita Polo ya VI na Vatican. Pap¨¢ azongelaki et¨¦ni ya bokangemi ya Y¨¦zu elobama na Nsango-Ndamu ya Yoane. Mbek¨¢ ya Y¨¦zu, oyo ay¨¦bi ¡®te azui et¨²mbu, ezali likambo m¨®k¨® ya bolingo, elimbolaki S¨¢ntu-Pap¨¢.

Jean-René B.-Kinshasa

Ezali « moto mókó ya nsomi, oyo akokende libosó pe akoloba », elobaki Léon XIV na bato ya mobémbo mwa boyambi ebelé basanganaki na ndáko ya likita Polo ya VI ya Vatican po na bokimi molungé ya Roma. Papá, na bokobi molongo ya matéya na ye bitáli Yézu-Kristu elikya na bisó, atelemaki leló mokolo ya misáto na bokangemi ya Kristu na ba sodá ya Roma na ngombá ya Oliva na Yeruzalem. Yézu azongi simá te, «amipesi», «po na bolembu te, kasi na bolingo¡±, elimbolaki Sántu-Papá. Eténi eye ekolakisa ¡®te ¡°elikya ya mokristu ezali bokimi mókó te kasi mokáno mókó¡±.

Na bosóló, Yézu akangemi te, amipesi, esembolaki ye. «Likambo ena elakisi elikya mókó ya libiki po ya bomoto na bisó: koyéba ¡®te, atá na ba tángo ya molili koleka, tokoki kotikala bansomi ya kolinga kinó na súka »

Nzámbe azali atá na bileko ya molili koleka

Na ngonga ena ya pási, ¡°Yézu alakisi ¡®te bozali ya Nzámbe ekomibisa epayi wápi bomoto azali koleka eleko ya bozangi sémbo, ya bobángi pe ya bozali ye-mei¡±. ¡°Mwinda ya sóló ebongisami epela na kobánga kodindisama te na molili ezali kokóma¡±, ekobaki Papá. Likabo ena ¡°ezali mbuma ya losámbo ya mozindo eye tokosénga na Nzámbe te po alongola bisó na pási, kasi ya kozua bokasi ya kokoba na bolingo, na koyéba ¡®te bomoi epesami ofélé na bolingo ekoki te moto mókó abotola yango¡±.

Na bomipesi na ba sodá, Yézu alingi ¡®te baningá na ye bakangama te, na bolakisi bôngó ¡®te ¡°mbeka na ye ezali likambo mókó ya bolingo ya sóló¡±.  Azali  na ngúyá ya koleka, motéma na ye eyébi ¡®te « kobungisa bomoi na ye po ya bolingo ezali eseke mókó te¡± pe ezali na ¡°bobóti mókó ya sómo¡±, lokóla mbuma ekwei o mabelé, ewéi pe ekómi kobóta¡±.

Mbuma ya bomoi ya sika

Likambo mosusu ekosálisa Yézu aleka mobúlú ebimaki na nzéla mókó emónani ekomema na liwá pe na súka, eye ¡®te ¡°kaka bomoi mókó ebúngi po ya bolingo ekozuama na súka¡±. Elikya evandi ¡°na boluki kokima pási te, kasi na koyéba ¡®te, atá na káti ya pási eye ezangi sémbo, mbuma ya bomoi ya sika ebombami¡±. Likabo ya Kristu elakisi ¡®te ¡°kaka eye epesami ekobóta mbuma, kaka bolingo eye ekómi ofélé ekoki kozongisa botiyi motéma, atá epayi wápi nionso ekomónana ebúngi¡± ekebisaki Léon ya XIV. Atelemeli bobombani na bisó likoló ya kolinga kobátela misála na bisó pe maye toyébi. Atá tángo tolingi komeka kotika nzéla ya Nsango-Ndamu, ¡°po bolingo emónani lokóla mobémbo mókó ekoki kosálema te¡±, ¡°masúmu na bisó pe ba botatabi na bisó bikopekisa Nzámbe ya kolimbisa bisó te pe ya kopesa bisó lisusu pósá ya kolanda ye mbala esusu, zambi ya kozua makoki ya kopesa bomoi na bisó po ya basusu¡±.

Bokangemi ya Yézu ekolakisa ¡®te «na bomoi, kotála nionso ekosála eloko te. Esengeli kopona mokolo na mokolo ya kolinga na bonsómi. Waná ezali elikya ya sóló: koyéba te, atá na molili ya etumba, bolingo ya Nzámbe ekolendisa bisó pe ekosálisa mbuma ya bomoi ya sékó ekóla káti na bisó¡±.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

27 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 15:50