ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.23 P¨¤pa elongo n¨¤ batindami ya "Chagos Refugees Group" ya Port Louis 2025.08.23 P¨¤pa elongo n¨¤ batindami ya "Chagos Refugees Group" ya Port Louis   (@Vatican Media)

L¨¦on XIV: moto moko te akoki kokangama na makasi na mboka mopaya

L¨¦on XIV ayambaki batindami ya bato soko zomi na mitano ya Chagos Refugees Group, mokolo mwa poso 23 Augusto, na Palais apostolique. Na ndakisa ya mokitani na ye, oyo akendaki na ?le Maurice na sanza ya libwa ya mobu 2019 mpo na kosambela mpo na bato ya Chagosse, Pape alingaki ¡®te kozonga ya bango na esanga, ezala na ndenge ya malamu koleka, sima ya boyokani ya kozongisa mboka na bango oyo esalemaki na sanza ya mitano moleki.

Bansango ya Vatikan ¨C Engumba ya Vatikan

 

Mbula mibale nsima ¡®te Papa François ayokaki bato ya Chagos oyo bakimá mboka na bango, Léon XIV asepelaki mingi na ndenge likambo na bango elongaki mpenza nsima ya kosala boyokani ya kozongisa mabele ya Angleterre oyo ezalaki na bisanga ya Maurice na boumeli ya mbula koleka nkamà mibale (200 ans).

Yango ezali etambe ya ntina mpo na bozongi bwa bino epai ya bino. ¡°Nazali kokabola esengo mpe elikya na bino¡±, elobaki Pàpa ya lingomba ya Santu Augustin na lisikulu na ye na Lifalanse, mpe asengaki na bato moke oyo bayaki na ye ¡®te bápesa Nzambe matondi na nzela ya losambo ya Nzembo 125: ¡°Talá makambo ya kokamwa Mokonzi azali kosala mpo na biso: tozali na feti monene! . . . Baye bazali kolona na mpinzoli bakobuka na esengo¡±.

Léon XIV asepelaki na likambo oyo mpamba te, kosolola mpe kotosa bikateli bya mibeko ya mokili mobimba esukisaki likambo liye lizangaki bosembo. ¡°Mobeko ya kimya mpo na lotomo ya bato¡± esalemaki mingimingi mpo na basi, oyo pápa alobelaki mingi.

¡°Bato ya makasi basengeli kopesa bato oyo bazangi makasi limemya (lokumu) mpo na lotomo na bango¡±

¡°Elikya ya bozongi na esanga na bino ya kobotama ezali elembo ya kolendisa mpe ezali elembo monene na mokili mobimba¡± Papa alobaki lisusu ¡®te: ¡° bato banso, ata baye ya mike mpe ya bolembu basengeli kozwa limemya na bakonzi mpo na bomoto bwa bango mpe lotomo lya bango, mingi mingi lotomo ya kofanda na mabelé na bango¡±;  mpe moto moko te akoki kotinda bango na makasi na mboka mopaya¡±.

Nsima ya mibu 60 ya boombo, bakonzi ya esanga ya Maurice basengeli sikawa kozonga. Papa azali na elikya ¡®te ekosalema ¡°na kati ya ba conditions ya malamu koleka¡± mpe alobi ¡®te eklezia ya mboka ekopesa lisungi na yango, mingimingi ¡°na elimo lokola ezalaki kosala yango na mikolo ya mpasi¡±. Bambula oyo tolekisaki na boombo ememelaki biso mpasi mingi. bozali na bobola, botyolami, mpe botiki bino libandà ya bato. Tika ¡®te Mokonzi, na elikya ya mikolo mikoya ya malamu, abikisa bampota na bino mpe apesa bino ngolu ya kolimbisa baye basali bino mabe. Na nsuka, Pápa alendisaki bango ¡®te: na maloba maye: ¡°Nalendisi bino ¡®te bótalela na mpiko binso mikolo mizali koya¡±.

Esanga ya Chagos ezali na esanga monene ya Diego Garcia, oyo ezali na esika ya makasi ya basoda ya mai mpe ya mpepo oyo États-Unis mpe na Royaume-Uni basalelaka. Nzokande, boyokani oyo esalemaki na mokolo mwa 22 ya sanza ya Mai, elobi ¡®te Grande-Bretagne ezali na ndingisa ya kozwa Diego Garcia mpo na mibù 99 mpo na lifuti lya mbula mobimba ya 101 millions ya livres sterling.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

25 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 11:01