L¨¦on XIV asengi na Eklezya ya Afrika elendisa bomoko kati na bokabwani bwa bato
Bansango ya Vatikan
Bozala «bilembo bya Elikya» mpe bolendisa « bomoko, mingimingi na bitando bya mboka biye bikatani na biteni na ntina ya bokabwani mpe bokeseni». Oyo ezali mbela ya Pàpa Leon ya zomo na minei (Léon XIV) na baepiskopo ya Afrika, oyo basanganaki na Kigali, na ekolo ya Rwanda, kino mokolo mwa 4 Augusti, mpo na liyangani monene ya SCEAM (Symposium des conférences épiscopales d'Afrique et de Madagascar) ya mbala ya tukù mibale (20). Kati na yoko nsango epesamaki na episkopo wa lokùmu Pietro Parolin mpe etindamaki na episkopo wa lokùmu Fridolin Ambongo Besungu, episkopo-monene ya Kinshasa mpe mokambi ya SCEAM. Pàpa atindaki bango mbote mpe alakaki bango lisungi lya yé. Mama na likambo ya liyangani liye, lizali boye: ¡°Kristu, liziba lya Elikya, ya kozongisa boyokani mpe ya boboto (kimya)¡±.
Komona bolingi bwa Nzambe
Mokonzi ntoma monene alobi ¡®te azali na elikya, mpamba te, alingi ¡®te bokutani oyo ekozala «eloko ekomonisa boyokani makasi ya bolingo bwa Nzambe» mpo na «kolamwisa kati na mitema elikya ya solo ya lobiko lya Klisto». Na yango, alendisi bango básala makasi mpo na bomoko mpe bándima ¡®te ba eklezya ya bamboka ba bango bizala na elembo ya solosolo ya elikya «mpo na bato banso». Léon XIV apesaki na Maria, ¡°Mama wa Elikya¡±, ¡°misala minso mya mikolo mizali koya¡± ya Eklezya na Afrika.
Misàlà mya SCEAM
Likita linene ya SCEAM ya mbala ya tukù mibale (20ème) ebandaki o mokolo mwa tukù mibale na mwambé ya yuli (28juillet) mpe ekosuka mokolo mwa minei ya Augusti (4 Aout). Episkopo wa lokùmu Michael Czerny, mokambi ya departema oyo etalelaka makambo matali bokóli bya bato, azalaki mpe na likita lina. Batindami koleka nkàmà mibake (200 delegués) bazalaki na likita lyango, kati na bango baepiskopo wa lokùmu zomi na misalto (13 cardinaux), baepiskopo tùkù mwambe na mitano (85 éveques), banganga-Nzambe tùkù sambo na mibale (72pretres), mpe ebele ya lotùkà ya basàngo mpe bandimi basusu ya balaiki, mibali mpe basi. Episkopo wa lokùmu Ambongo nde moto afungolaki likita lyango, mpe asengaki na molende inso ¡®te mobulu, minyoko mpe bitumba ya basoda esila (esuka) na bisika mingi ya mokili. Bongo asengaki kimya na bisika ya Afrika oyo ezali kotungisama na bitumba, bobola, kokima mboka mpe mikakatano ya ezingelo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.