P¨¢pa L¨¦on XIV mpe esaleli ya bomwana moke
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
O mokolo mwa sambo ya sànzà ya yuni (7 juin), yoko bokutani esalemaki na lokùmu mpe na bonkuku, na ndako ya bokonzi ya bantomà na Vatikan. Ezalaki likita moko ya ntina mingi. Pápa Léon XIV ayambaki libota ya Giovanni Giordano, mosàli oyo asàlaka elongo na kokamba basodá ya gendarmerie na kaserma ya basodá «V.B. Salvo D¡¯Acquisto» na Tor di Quinto na Roma
Ekopi kati na mwana mpe Pàpa Léon XIV
Na kati na bato oyo bazalaki na esikà enà, ezalaki mwasi mpe nà mwana wa yé ya moke ya mobali. Mwana eye atondi na molende mpe nguya mingi. Lokola tango ya bozeli epusaki kozala molai, moto moko te akokaki kokanga to pekisa ye masano. Azalaki kokima mbangu epai na epai, kozanga kotyela bato bazalaki wana likebi to koyebisa bango likambo moko.
Emonisamaki malamu ¡®te, azalaki lokola na mokili wa ye moko, bongo epai kuna kozela ezalaki bobele mwa ntango moke mpo na kosakana. Kasi, na mbalakaka tango Tata-Mosantu abimelaki bango, esalemaki likambo moko ya kokamwa mpe ya kobulunganisa. Awa biso mikóló tozalaki na kimya, na esengo, mbala mosusu kutu na nsomo na ntina ya bosantu bwa likambo yango, mwana oyo ya moke, lokola ¡®te akómaki na bososoli, atikaki biloko binso na nsima mpe, kozanga kokakatana, amibwakaki epai na Pápa, ayambaki yé na ekopi moko ya solo mpenza mpe ya esengo.
Ezali na eloko moko te oyo ezali komonisa ete moto azali na ntembe, kasi ezali nde motema ya mwana oyo ayebi solo, oyo ezali malamu, mpe oyo ezali kondima makambo. Pápa Léon XIV asekaki mwa moke, mpe na boboto bonso azongiselaki bango likambo wana ya kokamwa mpe ya ntina mingi. Tokoki te kozanga kotungisama na elembo oyo ya Evanzile: «Soko bobongwani te mpe bokomi lokola bana mike te, bokokota na Bokonzi bwa Likolo te»,Tala na (Mat. 18: 3). Mpe ezali kati na makambo mya lolenge eye nde Loboko la Nzambé emonisa lokola ¡®te, ezali na eloko moko oyo alingi kolobela biso na mongongo ya nse: mingi mpenza, ezali moto oyo azali na molimo mwa bonsomi nde akoki koyeba kitoko mpe botata bwa Nzambe koleka ata nani.
*Sàngà Bruno Silvestrini azali sango moko ya Lingomba ya ba-Augustin oyo asalaka na Vatikan.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.