ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Tempelo ya Nankunshen Daitian, ebebisami na mompepe Danas na Esanga ya Ta?wan.  Tempelo ya Nankunshen Daitian, ebebisami na mompepe Danas na Esanga ya Ta?wan.   (AFP or licensors)

P¨¢pa abondeli mpo na bato bazwaki lik¨¤m¨¤ na mompepe makasi na Ta?wan mpe atindeli bango lisungi

Na tango bayebisaki ye ¡®te mompepe makasi, oyo eb¨¦ngami na nkombo ¡®te Danas, ebomi bato mibale mpe bato mingi bazoki, P¨¢pa asengaki na lingomba ya Katolike, b¨¢salisa bato banso baye bazwi lik¨¤m¨¤ lin¨¤.

Bansango ya Vatikan

 

O mokolo mwa mosàlà misato, mwa zomi na motoba ya sànzà ya yuli (16 juillet), Papa Léon XIV azwaki liyebisi mpo na likàmà lya mompepe makasi oyo batangi na nkombo ya Danas, ebomaki bato mpe biloko na poso eleki na esanga ya Taïwan. Asàmbelaki mpo na baye bazwaki likàmà mpe asengaki na lisàngà ya bapostolo ¡®te ¡°batinda lisungi ya solo na bato¡±, elobi bongo Matteo Bruni, mokambi ya ndako ya bopanzi-sango ya Vatikan.

Mompepe makasi mobetaki na ngambo ya Westi ya Taïwan o mokolo mwa motoba ya sànzà ya yuli (6 juillet), ezalaki koleka na mbango makasi ya kilometele nkàmà mibale na tuku mibale na mibale na ngonga moko (222km/h).

Na nsuka ya poso, mompepe ya Danas ebetaki mpe ekitisaki mbula mingi, soko ba milimetele nkàmà mitano (500) na ngambo ya Sudi ya esanga yango.

Tee mokolo mwa lelo, balobeli kaka liwà lya bato mibale oyo bakufi. Nzokandé bato koleka nkàmà mitano bazoki (500 personnes blessées). Mingi o kati ya bango bazoki na biloko biye bikweyaki na nzela to na makàmà ya mituka tango mompepe makasi ezalaki koleka. Na kolanda motango ya sika, bato koleka nkoto misato na nkàmà mitano (3 500 personnes) bakimaki na bisika bisusu.  

Na esanga eye ya Taïwan, mimpepe makasi ebetaka mingi. Ebandaka na sànzà ya Yuli tee na sànzà ya okotobe (sànzà ya zomi). Kasi mibù miye miùti koleka, mbongwana ya klima esali ¡®te mimpepe myango mizala makasi koleka.

Na Esanga ya Taïwan, Masolo kati na ba Kristu nà bato ya eyamba ya confucianisme
Na Esanga ya Taïwan, Masolo kati na ba Kristu nà bato ya eyamba ya confucianisme   (ANSA)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

17 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 09:18