Na s¨¤nz¨¤ ya Yul¨ª, P¨¢pa abyangi na los¨¤mbo mpo ¡®te bato bayekola bososoli
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
¡°Ee Nzambe, yo oyo okobongwanaka té, salá ¡®te na miyebela, mpe na yeba yo¡±. Ezali na losambo la mabondeli lya Santu Augustin oyo eyebani mingi na buku na ye ¡®Confessions¡¯ nde Pape abyangi Eklezia ya mokili mobimba na mokolo moye mwa misato ya sànzà ya Yuli, na kobondela mpo na koyekola bososoli. Na maloba ma Santu Augustin, mokitani mwa Petro alobi ¡®te mpo a kososola: ¡°esengeli kotelema na bosolo liboso ya Nzambe, komitala kati na biso moko, kondima bolembu bwa biso moko mpe kosenga na Nzambe abikisa biso¡±. Ezali likambo ya ntina mingi mpo na ¡°kobotama lisusu na boyokani bwa solosolo elongo na Nzambe¡±.
Mayele ya Bososoli
Na mikanda mya yé, Santu Polo alobeli mbala ebele likambo ya bososoli, lokola: ¡°Na bondeli biso (¡), bokoma bato bamayele ma sika, nà mitema mya sika; bongo bokoyeba nini Nzambe lingi bosala, nini ezali malamu mpe ekosepelisa ye¡± (Rm 12,1-2). Na mokili mwa lelo, epayi wapi mbongwana ezali kokoba tango inso, nà ebele ya bansango (mingi mpenza ekoki kozala ya lokuta), na makambo oyo ezali komonana lokola ezali ya solo, kasi esalemi na mayele ya bomoto, mpe nà ebele ya mikakatano ya mokili mobimba, bososoli ezali na ntina mingi koleka mpo na kozwa bikateli ya malamu, oyo ekosalisa biso tópusana pene na Nzambe. Na yango, Léon XIV asalaki libondeli mpo na kosenga na Elimo-Santu mayele ya kososola. Tata Mosantu alobi ete, ¡°Tosambela mpo ¡®te tozwa makoki ya koyeba kososola, mpo na kopona banzela ya bomoi mpe kobwaka manso mazali kolongola biso mosika na Kristu mpe na Nsango-Elamu¡±.
Kososola mpo ya kolanda nzela elamu
Video ya Pàpa mpo na sànza ya yuli, esalemi na Réseau Mondial de Prière du Pape na boyokani nà diocèse de Brooklyn, elakisi elenge mwasi moko oyo azali kotambola na zamba, abungi mpe azali koluka esika wapi kokende. Bongo avandi nye mpe ayoki losambo la Léon ya zomi na minei elakisi yen zela. Solo ezali libondeli oyo ekobenga bakristu na kosenge Elimo Santu, ¡°mwinda mwa mayele ma biso¡± mpe ¡°mpe boboto na bikateli bya biso¡±. Ezali mpe lisusu, ngrasya ya koyeba kotelema mpo ya mwa bopemi, mpo na koyoka yé na bokebi mpe kososola ¡°mayoki ma bango, makanisi mpe esaleli¡±. ¡°Na lingi ¡®te bikateli bya ngai - elobi Pàpa - emema ngai na esengo ya Nsango Elamu, atrako na sengeli koleka bileko bya tembe mpe ya bolembù, atako esengeli na bunda, na kanisa, na luka, na bandela, ¡ ¡±. Mpo ya kosukisa losambo la yé, Léon ya zomi na minei asambeli mpe alobi boye: ¡°o pesa na ngai koyeba malamu eloko ezali kati na ngai, mp ona bwaka oyo ezali kolongola ngai mosika na Kristu, mpe kolinga yé, mpe kosalela ye lisusu koleka¡±.
Kokundwela lolakà la Yezu
O kati ya mobulu ya mokolo na mokolo, tosengeli koyekola kozwa bopemi mpe kokela mwa batango malamu mpo na losambo. Mgr. Robert J. Brennan, episkopo ya Brooklyn, alobi ¡®te:«Ezali na bisika binà bya kimya ya boyoki na bokebi, nde tokoyeba banzela bizali solo na ntina mpe tokozwa bososoli oyo esengeli mpo na kopona oyo ememaka na esengo ya solo mpenza, yoko esengo kaka Nzambe nde akoki kopesa».
Engebene na Sàngo Cristóbal Fones, S.J., mokambi ya Réseau Mondial ya Losambo ya Pàpa, «Koteya bososoli ezali na ntina mingi mpo na kotambola kati na mokili oyo etondi mikakatano. Yango esangisi kobondela, komanyola yo moko, koyekola Makomami, mpe kozala moninga ya Elimo. Kokolisa o bozindo boyokani na Yezu, ezali na ntina mingi ; zambi sé bongo, tokoki koyeba mongongo mwa ye kati na mingongo mingi ya mokili, mpe kozwa bososoli oyo esengeli mpo na kozwa bikateli na biso na nzela ya bososoli mpe ya molimo ya bomoto». Mpamba té, koyekola bososoli elongo, nakoyoka makanisi ma baninga basusu, ekokolisa nzela ya bososoli ya bisomei mpe ekosalisa biso na koyeba mosàla mwa Elimo-Santu kati na bomoi bwa lingomba.
Bososoli ekomema (ekopesa) bonsomi
Sàngo Fones alobi ¡®te lelomei, «ezalela ya bato ezali kotalisa biso bolamu lokola eloko ya ntina mingi, mpe zali kokanisa na kokokisa yango nà bozali-malamu». Kasi bokesi ezali engebene na Santu Ignace ya mboka Loyola. Apesaki lotomo na bososoli na bomoi bwa yé. Mpo na yé, ¡°esengo ezali mokano te, kasi nde mbuma: mbuma ya bomoi oyo epesami, na mosala ya basusu mpe na boyokani nà Nzambe¡±. Ezali nde na nzela eye, nzela ya Yesu, nzela ya motema, oyo ezali polele na bokeseni nà ezalela ya moyimi mpe ya kokonza to kosàlela baninga, nde tokozwa esengo ya solo; elobi yé.
Na mobu moye mosantu, ezali na ntina mingi, elobi Réseau Mondial ya Losambo (libondeli) lya Pápa, kobondela mpo na mikano to makanisi mya Mokonzi Ntoma Monene, mpo na kozwa ngrasya ya bolimbisi bwa masumu ya Zubile.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.