ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bankoto ya ba-Palestine basangani na Beit Lahia, na elikya 'te bazwa bilei, o mokolo mwa tuk¨´ mibale  ya s¨¤nz¨¤ ya yuli ya mob¨´ moye 2025 (20 juillet 2025). Bankoto ya ba-Palestine basangani na Beit Lahia, na elikya 'te bazwa bilei, o mokolo mwa tuk¨´ mibale ya s¨¤nz¨¤ ya yuli ya mob¨´ moye 2025 (20 juillet 2025).  

L¨¦on XIV: Mokili ezali kokoka bitumba lisusu te

Na sima ya misa na ndako-nzambe monene ya engumba ya Albano, P¨¢pa asololaki na mwa ndambo ya bapanzi-nsango. Alobelaki bango lisol¨® as¨¤laki elongo na ministre ya yambo ya Isra?l, Benyamin Netanyahu, mpe azongelaki ntina ya ?kobatela bisika bisanto to bya b¨´le bya biyamba binso? mpe kosala makasi solo mpo ya Boboto to kimya.

Bansango ya Vatikan

 

O kati ya bayiké bayàki kopesa Pàpa mbote na nsuka ya misa asalaki o mokolo mwa lomingo na ntongo (messe célébrée ce dimanche matin dans la cathédrale d¡¯Albano), o kati ya ndako-Nzambe monene ya engumba ya Albano, bitulùkù ya bapanzi-nsango babéngaki Léon XIV, mpo na kolobela mobulu moye mozali kosalema na Moyen-Orient, mingimingi bitumba na Gaza mpe etumba ya Israël na mokolo ya minei na eklezia ya Sainte Famille. Pápa azwaki ntango mpo na koyanola bango.

Léon XIV akanisaki ¡®te esengeli kosambela mpo na boboto to kimya mpe ¡°koluka kondimisa bato oyo bazali na matata mpo báfanda na meza ya (boyokani) mpo na kosolola¡±. Mokonzi ntoma monene, abyangi na masolo mpe na kokitisa mandoki, mpo ¡®te ¡°mokili ezali kokoka lisusu matata te, bitumba mingi mpe te¡±. Alobaki na bango ¡°te: «Tosengeli mpenza koluka boboto (kimya». Kobondela Nzambe, kasi mpe kosala mosala.

Lisolo na tshombo elongo na Benyamin Netanyahou

Na nsima, na kotalela lisoló ya telefone oyo asololaki na ministe ya yambo ya ekolo ya Israël, Benyamin Netanyahu, na sima ya matumboli na yé ya bitumba ya mokolo mwa minei oyo eleki na Eglise de la Sainte Famille na Gaza, Pàpa alobi ¡®te azongelaki «mposa ya kobatela bisika ya biyamba ya mangomba manso », kosàla mosàlà elongo, na «komemya bato», mpo na kosukisa « ebele ya mobulu, koyinana mpe ebele ya bitumba».

O mokolo mwa mitano, na sima ya masolo na nzela ya tshombo, sima ya etumba oyo ebomaki bato misato (3) mpe ezokisaki bato zomi na mibale (12), Léon XIV alakisaki ntina ya kokata masasi to kokitisa mandoki nokinoki mpo ¡®te mpe kosilisa bitumba. Pàpà amitungisaki «mpo na ezalela ya mpasi toya somo na mokili»; oyo bato banso ya Gaza bazwameli, mpe alobelaki mingi mpenza ezalela ya bana, mibange mpe bato ya maladi.

Pàpa Léon ya zomi na minei (Pape Léon XIV)
Pàpa Léon ya zomi na minei (Pape Léon XIV)   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

20 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 00:22