L¨¦on XIV abondeli mpo ya bakristu bazwami na minyoko
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
O mokolo mwa tukù misato ya sànzà ya yuli (30juillet), na libakù lya malongi ma bato banso na esika Santu Petro (Place Saint-Pierre), ya mbala ya yambo sima ya bopemi ya eleko ya molungé, Léon ya zomi na minei (Léon XIV) apaleli makasi mpo ya bobomi ya bato na paloase ya Bienheureuse-Anuarite na Komanda, na etuka ya Ituri, mpe alobaki ¡®te : «Nazali lisusu koyoka mawa makasi mpo na mobulu ya somo oyo esalemaki na butù bwa mokolo mwa 26-27 sànzà ya yuli mboka Komanda, na Moniele (Esti) ya Républiki Démokratiki ya Congo, epai wapi babomamaki bakristo koleka tukù minei (40 Chretiens) na kati ya ndako-nzambe na ntango ya losambo mpe na bandako ba bango moko »
Solo bato mingi babomamaki o mokolo mwa lomingo na etúká ena, na tango batomboki bakotaki o ndako-nzambe ya Katolike mpe babandaki kobeta masasi, na bato oyo bazalaki kosambela kuna. Bato soki tukù misato na mwambe (38 personnes), kati na bango basi mpe bana, bakufaki na ndako-nzambe, mpe bato basusu mingi bakufaki na mboka moko ya pembeni. Na nsuka ya malongi, Mokonzi Ntoma Monene alakisaki ¡®te apesi elikya na «baye bakufi na ngolu ya bolingo bwa Nzambe» mpe abondelaki «mpo na baye bazoki mpe mpo na bakristu banso na mokili mobimba, mingi mpenza, baye bazali kokoba konyokwama na mobulu mpe monyoko».
Na telegrame ya mawa oyo atindelaki bato nsima ya likambo lina, Papa «abondelaki Nzambe mpo ¡®te makila ya ba martyro bana ezala mbuma ya boboto(kimya), ya boyokani, ya bondeko mpe ya bolingo mpo na bato banso ya Congo».
Kobatela Elimo lya Helsinki
Na kokoba mateya ma yé, episkopo wa Roma akundwelaki ¡®te milulu mya mibu ntuku mitano ya bobandisi bwa mokoloto ya mosala mwa mokanda mwa nsuka ya Helsinki, oyo ekosalema o mokolo mwa yambo ya sànzà ya Augusti (1er Aout). «Na mposa ya kobatela bokengi na ntango ya bitumba ya malili, bikolo tukù misato na mitano (35pays) basili kofungola eleko ya sika ya géopolitique na kobimisáká boyokani kati na Est mpe Ouest», elobaki yé. Abakisi ete likambo lina «lizalaki mpe elembo ya kobakisama ya litomba mpo na lotomo ya moto, na likebi ya sikisiki mpo na bonsomi ya losambo, oyo ebimisamaki lokola moko ya moboko ya boyokani oyo ebimaki na eleko ena, kati na Vancouver mpe Vladivostok».
Pápa alobi ¡®te, bosangani ya makasi ya Saint-Siège na Likita ya Helsinki, oyo epesamaki na episkopo Monene Agostino Casaroli, «esalisaki mpo na kolendisa bomipesi ya mopelengano (politiki) mpe ya bizaleli malamu mpo na boboto (kimya)». Mpo na kosukisa alobaki ¡®te « lelomei kino seko, ezali na ntina mingi kobatela «elimo ya Helsinki», kolendendela na masolo, kokolisa boyokani mpe kosala ¡®te diplomatie ezala nzela ya malamu mpo na kopekisa mpe kosilisa matata.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.