Ang¨¦lus: Soki tobaluki epai na ye, Nzambe akoboya biso soki moke te
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Nsango Elamo lya lomingo loye la zomi na sambo ya mobù C, mwa 27 yuli, elimboleli biso lolenge Yezu atei bayekoli ba yè losambo la Tata wa biso, ¡°libondeli oyo ekosangisaka bakristu banso¡±. Pàpa apesi lokola ndakisa ¡°bomikitisi¡±, ¡°Kotyela tata motema lokola mwana¡±, ¡°kozala na mpiko¡±, mpe ¡°koyeba mpenza ¡®te olingami¡±. Mpamba te, yango nde Kristu azali kosenga biso ntango tozali kobondela Nzambe. Leon ya zomi na minei alobi ¡°tango tozali koloba nà Nzambe, tobengaka ye ¡°Abba¡±, elimboli te ¡°Papa¡±, lokola bana¡±. Léon XIV alobaki ¡®te ¡°na nzela ya Losambo la Mokonzi, tomimonisi biso moko, mpe lolenge yoko Tata amonisami na biso¡±. Alobi lisusu ¡®te: ¡°soki tozali kosambela Tata wa Likolo nà elikya nyonso, tokoyeba mpenza ¡®te tozali bana balingami mpe tokoyeba bonene bwa bolingi bwa ye¡±.
Nzambe akondima biso seko, ata sima ya mabungi, to mabe ma biso
Na kokoba mateya ma ye na ndambo ya mibale ya Nsango Elamu oyo ezali kolakisa na biso botata bwa Nzambe, na lisese lya moto oyo alamuki o kati kati ya bùtù mpo na kosalisa moninga wa ye oyo ayambi mompaya na mbalakata, to mpe lisese lya tata oyo azali komitungisa mpo ya kopesa biloko malamu na bana ba yé, Pàpa alakisi bòngò mpiko mpe tango oyo apesaka biso. Bilembo biye binso bizali kolakisa te, Nzambe akoboya biso te, akopesa biso mokongo soki moke te, soki tobaluki epa ina yé. Ata soki tokomi na ngonga ya suka mpo na kobeta na ekuke ya ye, mbala mosusu nsima ya mabungami, mabaku malamu tolekisi, ba échecs, ata asengeli ¡°kolamusa¡± bana ba ye bazali kolala na ndako mpo na koyamba biso.
Makanisi ma Nzambe eleki makoki ma biso
Léon XIV asàli bokokanisi ya ¡°Tata ya libota ya malamu¡± na elembo ya Pater Familias Ecclesiae, oyo ezali kolobela mokano ya bolingo bwa Nzambe na mokili mobimba. Papa alobaki ¡®te: ¡°o kati ya libota monene ya Eklezia, Tata azangi te kokomisa biso banso bilembo bya misala mya ye ya bolingo¡±. Pàpa alendisi biso ¡®te: tango tozali kosambela ye, Mokonzi ayokaka biso seko. Soki tango mosusu ayanolaka na biso na mindelo ya ngonga, to na makambo misusu tokoki kokundola te, ezali mpo ¡®te asalaka na mayele to makanisi mpe providence ma ye oyo eleki mayele ma biso. Mbela ezali ya kotika te ¡°kosambela nà kondima¡± ata ¡°na ba tango bina¡±. Mpamba te, o kati ya losambo, tokozwa tango inso mwinda mpe makasi, elobaki Tata Mosantu.
Losambo la Tata wa biso, bokundweli bwa bondeko na mokili mobimba
Pàpa alobelaki mpe bondeko ya mokili mobimba oyo ezali ya kobatama na kati ya losambo loye. Leo XIV alobi ¡®te, tango tozali kosambela Tata wa biso, ¡°tozali mpe kolakisa ¡®te tozali koyanola na likabo yango ya kolingana lokola bandeko na nzela ya Kristo¡±. Apesi mpe ndakisa ya batata ba eklezya babale, moko: Santu Cyprien ya Carthage oyo alobaki na mokanda mwa ye De dominica Oratione, ¡®te: ¡°tosengeli kokanisa malamu, tango tobengi Nzambe Tata wa biso, tosengeli mpe kozala na ezalela ya bana ba Nzambe¡±. Mosusu nde Santu Jean Chrysostome, oyo alobaki na mikanda mya ye De angusta porta et in Orationem dominicam ¡®te « bokoki te kopenga Tata wa bino, Nzambe nta bolamu, soki botikali na motema mabe mpe ya mozangi bomoto, mpamba te, lolenge lona bozali lisusu te na elembo ya bolamu bwa Tata wa likoló».
Kotika motema molai mpe boboto bwa Nzambe ebongola yo
O kati ya maloba mana mibale, Pápa amonisaki ¡®te ¡°moto akoki te kosambela Nzambe lokola ¡®Tata¡¯ bongo sima, azala na makambo makasi mpe azangi koyokela bato basusu mawa¡±. Nzoka nde ezali likambo ya ntina ¡°kotika kobongwana na boboto bwa Ye, na motema molai mwa Ye, na ngolu ya Ye, mpo na komonisa elongi ya Ye na elongi ya biso lokola na talatala¡±, elobaki Pàpa. Na yango, na bosukisi, alendisaki biso na nzela ya mabondeli mpe ya bondeko, tólinga mpe tomiyoka ¡®te tolingami, bongo, tólinga lolenge Nzambe alingaka biso: na kopesa baninga mwa tango na yo, koyeba kobomba sekele, kozalana na bokengi, mpe kozanga kosala bokeseni, kozanga kokanisela basusu mabe. Asengaki bolobeli bwa Maria, abondela mpo ¡®te toyanola na maloba maye, tómonisa boboto bwa elongi ya Tata.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.