Zubil¨¦ ya mabot¨¤: ?Nzambe alingi biso bo amilingi yemei?
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
¡°Banso bazala sé moto moko, lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai na zali na yo¡±. Na lomingo loye mwa yambo ya sànzà ya motoba, Pàpa Léon XIV apesi likanisi ya komanyola bilei bia nsuka ya Kristu ekomama na Nsango Elamu ya Yoane(). Bato bamobembo basanganaki na esika Santu-Petro (Saint-Piere) bazalaki 45 000. Ateyaki bango naino bomoko bya bana ba Nzambe, sima alobelaki ntina ya libota o kati ya societe. Misa manà ezalaki kosukisa zubilé ya mbala ya zomi na mitano, ezalaki bongo mabotà, bana, bankoko mpe babangé.
Kati na losambo la yé, Kristu asengi Tata ¡®te ¡°banso bazala sé moto moko¡±, akotisi bongo moto na moto ¡°na elakà ya bolingi etali moto nyonso na mokili¡±, ebandaki Tàta-Mosantu koloba. Nzokandé bomoko bya bana ba Nzambe ¡°ezali bolamu bonene oyo tosengeli kolula, mpamba te bomoko ya mokili mobimba ekokokisa kati na bato, bomoko bwa seko bwa bolingo Nzambe ye mei amilakisi, lokola Tata akopesa bomoi, Mwana nde oyo ayambi yango mpe Elimo akokabola yango".
Atako bongo, bomoko elakisi te ¡®te bokeseni ekozanga bisika bato bazali. Kasi engebene na Leon XIV, bomoko monà bozali ¡°lisàngà likoùta na bolingo oyo Nzambe mei alingaka, esika wapi bomoyi bokoùta mpe libiki na mokil¾±¡±.
Nzambe alingi biso lokola akomilingaka
Sima ya losambo la yé, Yezu akobi kolimbola bomoko bonà: «olingi bango lokola olingi ngai». Pàpa wa Roma alobi na esengo nyonso ¡®te: ¡°Nzambe akolinga biso lokola akomilingaka¡±. Sé bongo ¡°Nzambe akolinga naino, akolinga moto wa yambo (akolinga liboso)¡±. Na Ngolu ya yé, Nzambe akoyamba bato banso epai ya yé. Ezali ndé bomoi bwa ye, oyo apesaki mpo ya biso na Kristu, mpe oyo ekozalisa biso bomoko, ekosangisa biso.
Banso bataleli boyokani
Mpo na Pàpa Léon XIV, bomoko ekobanda na eleko moko: ¡°tozwaki bomoi yambo ¡®te toséngela na yango (tozala na mposa na yango)¡±. Lisusu, sima ya mbotama ya biso, basi na basi mpe babali na babali na nsé eye, basengelaki (bayokaki mposa) ya moto mosusu mpo ya kosepelisa nzoto mpe molimo mwa yé. «Tozali na bomoi, mpo ya boyokani; elingi koloba ¡®te, na lisalisi lya bokangemi esalemi na bonsomi mpe ekopesa bonsomi na mokili ya bato mpe na bokebani».
Kasi akebisi bato, mpamba té: boyokani ekoki kokaba (koteka) mokili moye, tango tokosalela bonsomi ya biso: «mpo na kobebisa bomoyi, mpo ya koyokisa mpasi». O liboso ya mabé, Yezu akobi losambo la yé : «asàli lokola mono likolo lya ba mpota ya biso. Akomi mpo ya bato banso esakola ya bolimbisi mpe kozongisa boyokani».
Nde kati na libota ¡°losambo loye la Mokonzi ekopesa eyano na yango na tango ya esengo ya bolingani bwa biso¡±. Alendisi moko na moko nakozala na bomoko, ¡°kozala moto moko lokola mokonzi¡± kati na libotà mpe bipai binso: ¡°tokeseni kasi tozali moto moko, baiké, kasi moto moko, mpo ya seko, na tango inso mpe bileko binso ya bomoi¡±.
Bondeko kati na libala lisantu, liboso lya makambo ekokabola boyokani
Léon XIV apesaki ndakisa ya mabota mabale ya mikili ya poto; libota ya mboka France: Louis et Zélie Martin mpe oyo ya Italie: Luigi et Maria Beltrame Quattrocchi.&²Ô²ú²õ±è;¡°Na ndakisa ya mabotà maye, eklezya ekolakisa biso polele ¡®te mokili mwa lelo mosengeli na bondeko kati na libala lisantu, mpo ¡®te bayeba mpe bayamba bolingo bwa nzambe. Na yango bakolonga na bokasi bokosangisa mpe bokozongisa na boyokani. Mpamba te,bomoko ekobundisa makambo makokabolaka boyokani mpe bato¡±. Ekobaki Léon koloba.
Na misa maye ya zubile mpo ya mabotà, abeti nsete mpo ya balongani, alobi: «libala ezali ndoto tè, kasi bolingo bwa solo kati na mwasi mpe mobali, bolingo mobimba, bolingo bwa loboko mpe ekobotisa». Solo mpenza na bosangisi bwa nzoto, bolingo bonà bopesi makoki ya kopesa bomoyi. Etindà ya yambo ya baboti ezali kotangisa bana babango.Na yango Pàpa alendisi bango bazala ndakisa ekomonono polele. ¡°Batangisa bango lolenge ya botosi na bonsomi. Baluka seko bolamu kati na bango mpe lolenge ya kokolisa yango¡±.
Kasi Léon XIV asengi na bana bayeba bolamu mpe bayeba koloba ¡°melesi¡± mpo ya likabo lya bomoi. Mpo na bankonko, apesi bango mokumba ya kobatela to kokengela oyo balingi. Basala yango na bwanya mpe mawa, nà bomikitisi mpe na mpiko oyo bayekoli na mibù ya bomoi bwa bango.
Libotà ezali esika ya motuya mpo ya bokutani na Yezu.
Lokola abotamaki kati na libota moko ya bakristu, mpe lokola azwaki mateya malamu ya katoliko, Pàpa Léon alobi lisusu ¡®te: ¡°kati na libota, boyambi bokitani na bomoyi, bileko nà bileko¡±. Yango nde ekokomisa libota esika ya motuya ya bokutani na Yezu. Yé alingi biso mpe akolinga seko bolamu bwa biso.
Na bosukisi, alobaki likambo ya bawà, amonisi elikya losambo Yezu asalaki ekopesaka: "'te mokolo moko tokozala biso banso moto moko, na mobikisi moko, na boyambi bwa bolingi suka te ya Nzambe".
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye