Na eleko ya molung¨¦, P¨¤pa akofanda na Castel Gandolfo
Bansango ya Vatikan
Pápa Léon XIV azongeli ezalela ya kala, bo momeseno ya ekeke ya zomi na sambo (XVIIs). Oyo ya kokende kofanda na eleko ya molunge, na ndako ya bantoma na Castel Gandolfo, esika oyo bakonzi ya Lingomba ya Katolike bazalaki kokende kofandaka ut¡¯o mibù nkoto yoko na nkàmà motobà na tùkù mibale na motobà (1626).
Engebene na yoko liyebisi ya ndako ya bantoma ebimisamaki o mokolo moye mwa zomi na sambo (17) ya sànzà ya yuni, Tàtà mosantu akokende na nsima ya nzangà ya lomingo mwa motobà (6) ya sànzà ya yuli na Castel Gandolfo, ndako ya baPàpa, mpo na mwa bopemi. Esika ena ezwami na likolo ya bangomba ya Albano. Na lomingo mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya yuli,na ngonga ya zomi (10h00), Pàpa Léon akosala misa na paloase ya baPàpa Santu-Tomasi ya Villanova ezwami na Castel Gandolfo. Bongo na ngonga ya nzangà (12h00), akosakola losambo la Angelus na esika ya Bonsomi (place de la Liberté) liboso ya ndako ya bantoma.
Sima na lomingo lolandi, oyo ya tùkù mibale (20) ya sànzà ya yuli, na ngonga ya libwà na ndambo (9h30), Tata-Mosantu akosala misa na katedrali ya Albano, enguma ezwami pembeni na Castel Gandolfo,epai wapi akozonga mpo na losambo la Angelus na ngonga ya nzangà (12h00). Kasi na sima ya nzangà, akozonga na Vatikan, elobi liyebisi linà.
Na eleko ya sànzà ya yuli, masolo manso ya bonkutu na Pàpa ekokatana, nà mpe bamalongi ya mikolo mwa misato 2,9,16 mpe 23(audiences générales). Ekozongela o mokolo mwa misato mwa tùkù misato (30) ya sànzà ya yuli.
Angelus na Castel Gandolfo na sànzà ya Augústo
O mokolo mwa mosala mitano mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya Augústo, na ngonga ya zomi (10h00) na tongo, Tata-Mosantu akosala misa na paloase ya Pápa Castel Gandolfo. Akosakola Angélus ut¡¯o ndako ya bantoma (ya baPàpa) na ngonga ya nzangà (12) na mokolo. Lolenge yoko mpe lomingo lokolanda nsima ya mikolo mibale. O mokolo mwa zomi na sambo (17) ya sànzà ya Augústo, Tata-Mosantu akozonga na Vatikan.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.