Lisolo kati na L¨¦on XIV mpe Vladimir Poutine na nzela ya Tshombo
Bansango ya Vatikan
Mokambi ya ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan abimisaki na mpokwa ya mokolo mwa minei (4) ya sanza ya yuni, lisolo na nzela ya tshombo, oyo Papa Léon XIV nà Vladimir Poutine basalaki sima ya nzanga.
Kopesa elembo mpo ya bolamu bwa boboto (to kimya)
Matteo Bruni, alobi ¡®te na tango ya masolo mana, soko balongoli makambo ya bolamu ya lisanga, ba pesaki mwa bokebi na likambo la Ukraine mpe ya boboto. Papa ¡°asengi ekolo ya Russie na kosala elembo mpo ya bolamu bwa boboto¡±, sima alobeli ¡°lotomo la masolo mpo ya kokotisa boyokani malamu kati na makita, bongo baluka mabongisi na matata¡±.
Etinda ya episkopo wa lokumu Zuppi
Kaka ¡°likambo lya lisalisi la bato, elobamaki mpe na lisolo lina¡±, kasi mpe ¡°bosengà ya kopesa lisalisi na pete, bisika basengeli na yango¡±. Na ngonga eye, ¡°basangisi makasi mpo ya bokabolani ya bato ba boloko¡±, bakisa mpe ¡°mosala mwa motuya oyo tata episkopo wa lokumu Zuppi asali¡±.
Mabongi mwa bokristu
Na kosukisa, Matteo Bruni alobi ¡®te na boùmeli bwa lisolo lina na nzela ya tshombo, ¡°Papa alobeli patriarche Kirill, atondi ye botondi mpo na ba maloba malokumu to ya limemya na libandela ya mosala mwa yé ya Papa¡±. Ezalaki libaku malamu mpo Papa nakoyebisa Mokonzi mwa ekolo ya Russie «boni boni mabongi mwa bokristu ya lisanga ekoki kozala mwinda mpo ya kosunga na koluka kimya, mpo na kobatela bomoi, mpe mpo na koluka bonsomi bwa eyamba ya solo».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.