Likita po ya banso : ¡°Tomema epayi ya Nzambe pasi ya baye bazali komona 'te babungi¡±
Jean-René B.- Kinshasa
Liboso ya bato ya mobembo 40.000, Pápa Léon ya Zomi na Minei abongisaki liteya ya lelo ya mokolo ya 11 ya sanza ya motoba na ba libiki Yezu asalaka. ¡°Po na wana, ebandaki Santu-Pápa, nakobianga bino ya bolakisi na Motema ya Kristu ba pasi na bino pe makono na bino, biteni biye ya bomoi na bino epayi wapi bozali komona ¡®te bokangemi pe botelemi. Tosenga na botiyi motema na Mokonzi po ayoka mongongo na biso pe abikisa biso!¡±. Moto ya Biblia aponami po na kokolisa bomanyoli ena ezali Bartimeo, moto ya lolanda pe moséngi eye Yezu akutanaki na ye na Yériko, likambo lilobami na nsango ndambo ya santu Malako (Mk 10, 49-52).
Bogangi ya Bartiméo
Na bokeseni na botamboli ya bato ebele sima ya Yezu tango ya bobimi na mboka eleki na sé mingi na mokili, Bartiméo azalaki kotambola te. ¡°Mokomi ya nsango ndambo alobi ¡®te afandi pembeni ya nzela, azali na bosenga ya moto moko akoki kotelemisa ye pe asunga ye po ya kozonga na nzela¡±, elimboli Léon XIV. ¡°Tokoki kosala nini o eleko tokomi na esika moko eye emonani ¡®te tosuki?¡±, etunaki Pápa wa Roma. Moséngi, tango ayoki ¡®te ezali Yezu ya Nazarete, abandi koganga ¡°Mwana ya Davidi, Yezu, yokela ngai mawa!¡±, bogangi moko ekoma losambo eyebana makasi na momeseno ya Orient, pe Pápa asengi bandimi basalela yango. ¡°liboso ya bogangi na ye, elimboli ye, Yezu atelemi pe alobi babenga ye (cf. v. 49), po ezali na bogangi moko te Nzambe ayokaka te, atako tozali koyeba te ¡®te tozali kolobela ye¡±
¡°Bartiméo akoteya biso ya kosalela makoki tozali na yango kati na biso pe bizali ya biso. Azali moséngi, ayebi kosenga, ayebi kutu koganga! Soki olingi mpenza eloko moko, sala nionso po ozua yango, atako basusu bakogangela yo, bakoyokisa yo soni pe bakoyebisa yo ¡®te otika. Soki olingi yango mpenza, koba koganga !¡±, elobaki Pápa.
Kolakisa botaú na ye na Kristu
Po na kokende epayi ya Yezu pe komitika po na libiki, moséngi asengeli ¡°abwaka monkóto na ye¡± (Mk 10,50). « Po na moséngi moko, monkóto ezali nionso : ezali bokengi, ezali ndako, ezali ebundeli eye ekobatela ye », elobaki episkopo wa Roma. « Po na kokende epayi ya Yezu pe komitika po na libiki, Bartiméo asengeli kolakisa na Ye mobimba ya botaú na ye. Ezali nzela ya ntina ya bokei na libiki »
Tango Yezu atuni Bartiméo nini akoki kosala po na ye, moto ya lolanda ayanoli 'te alingi amona. Akosalela, elimboli Papa, likelelo (verbe) «anablepein», eye ekoki kolakisa ¡°komona lisusu¡±, kasi ekoki kolobama ¡°kotombola liso¡±. ¡°Ya solo, Bartiméo alingi kaka komona te, alingi lisusu kozongela bomoto bwa ye! Po na kotombola liso, esengeli kotelemisa motó. Tango mosusu, bato bakangemi pamba ¡®te bomoi eyokisa bango soni pe bazali lisusu na posa ya kozongela ntina na bango moko te¡±. Wana, engebene na Léon XIV, ¡°eye ebikisi Bartiméo, lokola moko moko na biso, ezali boyambi¡±.
¡°Bandeko ya mibali pe ya basi, tomema na botiyi motema liboso na Yezu ba pasi na biso, na ya bandeko na biso, tomema lokola pasi ya baye bazali komona ¡®te babungi pe bazali kozua nzela te. Toganga pe po na bango, pe tozala na kondima ¡®te Mokonzi akoyoka biso pe akotala biso¡±, esukisaki Pápa.