ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.06.20 Bokutani ya banganga-Nzambe ba bayekoli ya Acad¨¦mie pontificale eccl¨¦siastique pontificale o mokolo mwa mitano, mwa 20 Yuni 2025. 2025.06.20 Bokutani ya banganga-Nzambe ba bayekoli ya Acad¨¦mie pontificale eccl¨¦siastique pontificale o mokolo mwa mitano, mwa 20 Yuni 2025.   (@VATICAN MEDIA)

L¨¦on XIV alobi na baye bakokoma bantoma : ? B¨®pesa ba eklezya nzela ya kozala penepene na P¨¢pa ?

L¨¦on XIV ayambakai bayekoli ya Acad¨¦mie pontificale eccl¨¦siastique pontificale o mokolo mwa mitano, mwa 20 Yuni, na Vatikan. P¨¢pa alendisaki bango mpo basalela likabo lya bonganga na bomikitisi mpe boboto, na boyoki mpe bozalani pembeni, lokola moyekoli semba mpe molende ya Kristu mokengeli molamu. Banganga Nzambe baye, basukisi mob¨´ ya kelasi ya ba missionele. Ezalaki bongo mob¨´ mwa suka ya formation na bango.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Ezala mosala nini bakopesa bino, ezala bisika epai wapi bokozala na mokili, Pàpa asengeli kotiya motema na basango oyo, na nzela ya mabondeli mpe ya misala, bazali kosala makasi mpo na kopesa litatoli na bango, mpo na komonisa ete azali pene na bato mpe nà ba eklezya. O mokolo moye mwa tukù mibale (20) ya sànza ya yuni, Pápa alobaki maloba mana na bayekoli ya eteyelo ya Pápa oyo ebongisaka banganga Nzambe bakoma ba-diplomate ya Vatikan. Léon ya zomi na minei apesaki bango toli ya kosalela «likabo ya bonganga-Nzambe na bomikitisi mpe boboto, boyoki mpe bozali pene», lokola bayekoli ya sembo mpe ya molende ya Kristo Mokengeli malamu.

Académie pontificale ecclésiastique na mboka Roma.
Académie pontificale ecclésiastique na mboka Roma.

Bantoma o mosàlà mwa Pàpa

Na mosala moye, esengeli kozala mpe kotikala « bakengeli mpata » oyo bazali na « makolo na mabele »; mpe « kozala na elilingi ya nganga-nzambe oyo azali kosalela Pápa », ban toma ya Pápa, lokola emonisami polele na buku Chirographe «Le ministère pétrinien».

Mposa na yango ezalaki ya "kopesa makasi ya sika na Institution na bino, oyo ezali komilengele mpo na kokumisa mibu nkàmà misato na tùkù mibale na mitano (325) ya bobandisi na yango", ekundwelaki episkopo ya Rome. Tata Mosantu, na nsuka ya bokutani, abenisaki na motema mobimba ebandela ya mosala mwa bango na kozala diplomate ya Sieti Mosantu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

20 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 21:08