ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.06.08  P¨¤pa L¨¦on XIV na tango ya Misa ya Nkitela  ya Elimo-Santu, o mokolo mwa 8 ya yuni o mob¨´ 2025. 2025.06.08 P¨¤pa L¨¦on XIV na tango ya Misa ya Nkitela ya Elimo-Santu, o mokolo mwa 8 ya yuni o mob¨´ 2025.   (@Vatican Media)

Leon XIV abeleli kimya mpe asengi bakonzi bilembo bya masolo

Yambo ya kosukisa Misa ma Nkitela ya Elimo-Santu mpe ya losambo la Maria ya Regina Coeli, Mokonzi P¨¤pa wa Roma, liboso ya bakristu nkoto tuku mwamb¨¦ (80 000 fideles), asengaki na Elimo-Santu likabo la boboto (kimya) o kati ya mabota, societe mpe n¨¤ bondeko kati na bikolo. Mingi mpenza asengaki yango na bakonzi ba bikolo.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Ya mbal¡¯oyo, o boso bwa bandimi mpe bato ba mobembo nkoto tuku mwambe ya monkama ya bikolo, na mokolo moye ya zubilé ya mangomba, Pàpa Léon XIV aponaki kobelela likabo la kimya na Elimo-Santu. Mpo na bolobeli bwa Maria, Mokonzi Pàpa alobi, « liboso nayino Kimya o mitema: mpamba tè, se motema mozali na kimya nde ekopalinginya boboto kati na mabota, na societe, mpe na bondeko kati na bikolo».  Mingi mpenza, na Nkitela eye ya yambo ya bo Pàpa bwa yé, Léon XIV asengi ¡®te «Elimo ya Krisu oyo asekwi, efungola banzela ya boyokani bipai binso bizwami na bitumba» ; «epesa mayele mpe mpiko na bakonzi, mpo bakokisa misala mya masolo».

Yambo ya kosambela esakola ya Maria Regina Coeli esukisi eleko ya Pasika na Nkitela, Pàpa atondi botondi na baye banso basambelaki Misa mana, mpe baye balandaki yango na nzela ya communication. Léon apesaki matondi na ba episkopo wa lokùmu mpe na ba episkopo banso bazalaki na esika wana. Abosanaki te batindami bamangomba, ba movema ya eklezya mpe mangomba masika bazali kosepela zubilé. «Bandeko babali na basi, sima ya zubilé eye, elongo na Elimo-Santu, bozonga nà mitema mya sika. Bokende mpe bomema na banso elikya ya Mokonzi».

Na nsuka, Mokonzi Pàpa abalisaki makanisi ma yé epai ya bana mpe bilenge bazali koleka na mimekano ya kelasi na eleko eye ya suka ya mbula. Mingi mpenza na mboka italie.

Misa na eyenga enene ya Nkitela ya Elimo-Santu, mokambamaki na Pàpa Léon XIV, na esika Mosantu-Petro, o mokolo mwa lomingo la 8 ya yuni na 2025..
Misa na eyenga enene ya Nkitela ya Elimo-Santu, mokambamaki na Pàpa Léon XIV, na esika Mosantu-Petro, o mokolo mwa lomingo la 8 ya yuni na 2025..   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 10:18