Kobomama ya bato na ndako-Nzambe moko ya Damas: yoko lik¨¤m¨¤ ekolendisa boyambi bwa biso.
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
O mokolo mwa 23 ya yuni, soeur Jihane akokutana na mabota bazwi likama mpe bazali kozela, kolela na banzela ya lopitalo ya Mujtahid. Akendaki kotala bana bay é ya kelasi, oyo bazokaki na tango babetaki masasi o ndako-Nzambe ya bagrecque-orthodoxe ya Santu-Eliya, na Damas.
«Bato kati na nkama misato na tuku mitano nà nkama minei (350 et 400 personnes) bazalaki na misa mokolo monà. Ut¡¯o libanda, ba kamikaze babandaki kobete masasi na baye banso bazwamaki liboso la yé», epesi nsango mamelo, mokambi ya kelasi al-Riyaha na Damas. Moto yango atungisaki bato, tango bakristu basanganaki liboke mpo ya kopekisa yé, Kasi kaka na tango wana, abendaki mokaba mwa yé oyo ekangamaki na bombe, bongo ¡°mibali na biso bapumbwe na yé elongo. Balingi lisusu nini? Balongani ba biso, batikala koboma soki moke te, ata ngungi ya mpamba te. Mpo ya nini? Tozali bakristu, tozali kosambela nzambe na biso mikolo na mikolo. Tozali bato ba mabe te, balingi nini?¡±, ezalaki koloba nà kolela, mwasi oyo mobali azwaki likàmà na Manon Chapelain, mosakoli na biso na Damas.
Bakati ba Misa mpo na mwa ntango
Bakonzi ba sika ya Syrie bandimaki ¡¯te, moto oyo abomaki bato mpe amibomi na bombe, ezali moto ya Euka ya Islam, etuluku oyo elongwaki na bokonzi na 2014 kasi ezali kaka kosala na esobe ya Syrie. Na mokolo ya yambo, Ahmad al-Chareh, mokambi ya mboka ya Siri, alakaki ¡®te akomema bato oyo basalaki likambo ya mabe wana liboso ya bazuzi. Lobi, Ministre ya Affaires étrangères ya Syrie efundaki ¡®te «ezali mayele mabe mpo na kobebisa bomoko ya mboka mpe kobebisa mboka », nzokande Patriarche ya Ortodokse ya Damas asengi na bakonzi ya sika ya Damas « kozwa mokumba mobimba » mpo na likambo oyo, kosengaka na bango ete «bábatela mangomba mpe bato banso ya mboka».
To lingi libateli, mwa ndambo ya Kimya. Tolekisi bambula mingi na bitumba, na koningana ya mabelé, na bobola. Tozali bato oyo balembi mpenza. Bato bazali kokende ndakonzambe na bolembù inso. Tozali kobondela mpo na kimya. Kasi esika ya kimya ebóngwani na esika ya bobangi¡±, elobi mamelo Jihane. Amonisi bobángi mopotu oyo ezali kokóla kati na lisangá ya bakristu.
Mokonzi o limbisa bango
Alobi na biso¡¯te, kala, bazalaki koboma na ba bombi, ezalaki kosalema na balabala, kasi lokola lelo te. Bazali kokanela bakristu. Sik¡¯oyo, moto inso azali na bobangi makasi. Ezali na banungunungu oyo ezali kolobea ¡®te bitumba mosusu ekoki kosalema na ba ndako-nzambe. Ayebisi ete milulu mya misa mipekisami mpo ya mwa tango.
Kasi, mamelo Jihane akondweli lisusu ¡®te ¡°eklezya ya biso etongami na makila ya ba martiro¡±, bongo soki bandimi bazali na boyambi moko na mokolo, boyambi bònà bokolendisama na mikakatano. ¡°Ezali sé mimekano lokola kobomama ya ekela ya terrorisme oyo, nde etali bosembo bwa boyambi bwa biso¡±.
Bakristu bakokoba na kolikya ¡®te bomoi boleki liwà na makasi, lisusu, ¡®te, ¡°Nzambe wa biso azali Nzambe ya bomoi, ya nsekwa, kasi Nzambe ya bawà te¡±. Sima abelelaki nkombo ya Yezu mpe asengi ¡®te Mokonzi alimbisa baye bazali kokotisa bobangi kati n abato mpe kosopa makila.
Mokili mobimba mokweisi yango
Likambo lisalemi na mboka ya Syrie, esimbaki mpenza mitema ya bato basusu. Mokambi ya ONU mpo na Syrie ayoki nkanda mpenza mpe asengi baluka o bozindo. Bikolo bayike, mingi mpenza Turkie, France, États-Unis, nà UE bazali kokweisa likambo la bitumba oyo ezali ¡°kotya mobulu¡± o kati ya Syrie
Etuluku ya bituka ya Islam, bazongisi te na likambo ya koboma mpe komibomisa lokola basalaki byango na sànza ya mayi, tango batombokaki na mbala ya yambo nà mapinga ma sika ya mbulamatari.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.