ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.06.15 Liboso la losambo la Angelus ya lomingo la Bosato Bosantu. 2025.06.15 Liboso la losambo la Angelus ya lomingo la Bosato Bosantu.   (@Vatican Media)

Angelus : Sambelani mpo ya Kimya na Moyen-Orient, na Ukraine mpe na mokili mobimba.

Yambo ya losambo la Maria ya Angelus, o mokolo mwa 15 ya yuni, na esika Santu-Petro, L¨¦on XIV abyangi na masolo mp ona kimya na mboka Birmani. Alakisaki limemya na bato nkama mibale (200) baye bazwaki lik¨¤ma na mboka Nigeria, na mpe na Nganga-Nzambe oyo akufaki na bombe na mboka Soudan. Asengi na babundisi batika bitumba, babatela bacivil, babongisa masolo mp ona kimya. Communaut¨¦ internationale ¡°epesa lisalisi ekoki na bato bazwami na mpasi na mokili¡±.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Mokili mwa lelo mosengeli na makoki mpo na kotonga boboto lokola lisano oyo ezali ¡°kelasi ekoteya na limemya mpe na boyengebene, oyo ezali kokolisa na bokutani mpe na bondeko¡±. Lolenge ya kozalela na bomoto, ¡°na koboya lolenge inso ya mobulu mpe minyoko¡±. Oyo ezali nde maloba Pàpa Léon  XIV alobaki yambo ya losambo la Angelus, sima ya Misa ya zubilé ya lisano (jubilé du sport). Alobelaki mpe matata nzike ya mandoki na mokili.

¡°Na ekolo ya Birmani, atako botiki masasi, bitumba ezali kokoba, mpe ezali kobebisa bandako ya leta. Na sengi na ba ngambo inso na bosangani mpo na zwa nzela yam asolo y abato banso; yangomei ekoki komema na mabongi ya boboto (kimya) mpe ya libela.¡±

Liboso ya losambo la Angelus ya lomingo la mokolo mwa zomi na mitano ya yuni (15 juin) 2025
Liboso ya losambo la Angelus ya lomingo la mokolo mwa zomi na mitano ya yuni (15 juin) 2025   (@Vatican Media)

Kobomama ya bato ya somo na ekolo ya Nigeriya

Na sima, Papa alobelaki likambo ya somo ya bobomami ya bato pene ya nkama mibale (200 personnes). Babomaki bango nà nko nyonso na ekolo ya Nigeriya, na butu ya mokolo mwa zomi na misato (13) mpo na komona mokolo mwa zomi na minei (14) ya sànzà eye ya yuni, na engumba ya Yelwata, na etando ya misala ya mboka Gouma, na etukà ya Benue. Mingi kati na bango, bazalaki bato oyo bakimà bamboka ya bango mpe bamissionele ya lingomba ya bakatolike babombaki na bandako ba bango.

Nazali kobondela mpo ¡®te bokengi, bosembo mpe kimya elonga na Nigeriya, mboka oyo tolingaka mingi, bongo ezwami na mobulu makasi ya ndenge na ndenge. Bongo na bondeli mingi mpenza mpo na mangomba ya bakristu na bamboka ya mike ezwami na etukà ya Benue, oyo bazali kokutana na mobulu mbala na mbala.

¡°Nazali kobondela mpo ¡®te bokengi, bosembo mpe kimya elonga na Nigeriya, mboka oyo tolingaka mingi, bongo ezwami na mobulu makasi ya ndenge na ndenge.¡±

Yoko Nganga Nzambe abomami na Soudan.

Na sima Pàpa Léon XIV akanisaki na Republiki ya Soudan, ¡°oyo ebebisami na bobulù ut¡¯o mibù mibale koleka¡±. Akanisaki mpe liwa lya Don Luke Jumu, sango ya El Fasher oyo akufaki na bombe.

Na kolaka mabondeli na ngai mpo na yé mpe na bato bakufi, nazali lisusu kobenga babundisi mpo ete batika bitumba, babatela basivile, mpe babanda masolo mpo ya boboto. Nazali kosenga n abato ya mokili mobimba ¡®te bakolisa milende na bango mp ona kopesa atat mwa lisalisi ya ntina, na bato oyo bazwi likàmà ya mpasi. Tokokoba kosambela mpo ya kimya na Moyen-Orient, na Ukraine mpe na mokili mobimba.

¡°Na kolaka mabondeli na ngai mpo na yé mpe na bato bakufi, nazali lisusu kobenga babundisi mpo ete batika bitumba, babatela basivile, mpe babanda masolo mpo ya boboto. Nazali kosenga n abato ya mokili mobimba ¡®te bakolisa milende na bango mp ona kopesa atat mwa lisalisi ya ntina, na bato oyo bazwi likàmà ya mpasi. Tokokoba kosambela mpo ya kimya na Moyen-Orient, na Ukraine mpe na mokili mobimba.¡±

Liboso ya kosukisa, episkopo y aroma abwakaki mbela na bilenge alobi: ¡°Nazali kozela bino na boùmeli ya sànzà moko na ndambo na zubilé ya bilenge!Tika ete Ngondo Maria, Mokonzi-mwasi ya boboto, asambela mpo ya biso¡±.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

16 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 12:21