ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Regina Caeli: Ata na botau bwa biso, Mokonzi ayei kofanda epayi ya biso

Na lomingo loye la motoba o eleko ya pasika, L¨¦on XIV alimboli Nsango Elamu ya Santu Yoane, epai kani Yezu alaki Elimo Santu na bapostolu ba ye. Elaka ena ekosenge ¡®te moko moko wa biso akoka kotambola o nzela ya boyambi ¡°mpo ya kozala tempelo esantu ya Nzambe¡±.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Ut¡¯o boponomi bwa ye o mokolo mwa 8 mai 2025, Léon XIV, mpo ya mbala ya yambo, amimonisi na lininisa lya ndako ya Papa o libaku lya losambo la Maria, Regina Caeli. Alobi boye na bato bayike basanganaki na esika Santu Petro  : ¡°Eleki mwa mikolo, nabandaki mosala mwa ngai o ontei ya bino. Na yango, nalingi liboso kotondo bino botondi mpo ya bolingo bozali kolakisa ngai, epai esusu nazali kosenge bokoba kosalisa na losambo mpe lizali lya bino pene na ngai ¡±. Nsima  ya maloba ma botondi, Tata Monsantu Papa alimboli Nsango Elamu ya lomingo loye la motoba ya eleko ya Pasika esika Kristo alimboli na bayekoli ba ye batondi na bobangi mpe na mawa, boni boni basengeli kokoba na kozala banzeneneke ba bokonzi bwa Nzambe. Yezu alakeli bango likabo lya Elimo Santu mpe abakisi: ¡°soko moto alingi ngai, akobomba liloba la ngai. Mpe Tata wa ngai akolinga ye, tokoya epai ya ye, mpe tokofànda epai ya ye ¡±.

Na maloba maye, Yezu akangoli bayekoli ba yé na bobangi bazalaki na yango mpe asengi bango batikala o kati ya bolingi bwa ye. Bongo Papa akobi na koloba ¡®te: ¡°soki ba kangemi na bolingi bwa Yezu Yemei akoya kofànda elongo na biso. Wana bomoi bwa biso bokokoma tempelo ya Nzambe mpe bolingo bona bokongengisa biso, bokokoto na ndenge ya biso ya bomanyoli mpe ya kokamata mikano kino ndenge ya biso ya kozala na baninga mpe na ndenge ya kotala makambo manso o bomoi bwa biso¡±.

Ndako eye ya Nzambe azali solo mpenza ¡°likabo lya Elimo Santu, Elimo eye esimbi biso loboko mpe ekolakisa biso o bomoyi bwa mokolo na mokolo, bozali bwa Nzambe pene na biso mpe ekosala ¡®te tokoma efandelo ya ye¡±.

Kozala "Tempelo Esantu ya Mokonzi"

Papa Léon XIV abeti mosete abakisi ¡®te esengeli malamu ¡®te na bomoyi bwa biso mpe na bomopesi bwa biso na eklezya, toloba na motema mobimba ¡®te: ¡°atako nazali moto motaù, Mokonzi ayoki nsoni ya bomoto bwa ngai te, kasi ayei kofànda epai ya ngai (kotiya ndako ya yé epai ya ngai)¡±. Papa asengi totambola na nsai ya o nzila ya boyambi tolikya na elaka eye ¡°ya kozala tempelo esantu ya Mokonzi¡±.

Yambo koyemba Regina Caeli, Episkopo wa Roma alendisi moko na moko na bomipesi  ¡°mpo amema bolingo bipai binso na bomikundoli ¡®te ndeko mwasi  to mobali nyoso azali efandelo ya Nzambe mpe ayeba ¡®te Nzambe akomimonisa na bato bake, babola mpe na bato bazali konyokwama. Banso tozala bakristo batondi na bokengi mpe na motema mawa ona baninga¡±.

 

Matondi mingi na ndénge otángi lisolo liye. Soki olingi kozwa nsango ntango inso, mikomisa na mokanda mwa biso mwa nsango na bofini esika eye 

 

25 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 15:33