Papa L¨¦on XIV akobenga ba media na bopanzi nsango ya mobulu te
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Na ndako ya makita Polo ya Motoba, etondi na bapanzi nsango pe batindami ya ba media, Papa wa Roma ya sika alimboli ndenge azali komona pe kozela ya mosala ena. Po na moko ya bobimi na ye liboso ya bato, Léon XIV abimi na mwa koseka, mwa bobangi, azui liboso ngonga ya kopesa mbote na bapanzi nsango ya mokili mobimba pe ya kotanga lisikulu na ye na sima.
Na bozongeli esengo ¡°Esengo na bato bakoluka boyokani¡±, Léon XIV abiangi baye bazali koyoka ye na ¡°bokobi na bopanzi nsango ekeseni, eye ekoluka boyokani na motuya nionso te, eye ekotonda na maloba ya mobulu te, eye ekobala lolenge ya momekano te, eye ekokabola boluki sembo na bolingo te, oyo tosengeli koluka na bomikitisi¡±.
Bopanzi nsango moko ya bokeseni ezali kosala litambe ya liboso epayi ya boboto, eye ekobanda na ¡°moko moko na biso¡±. Akobaki na bolobi ¡°na lolenge tokotala basusu, tokoyoka basusu, pe, na ndenge wana, lolenge tozali kopanza nsango ezali na ntina makasi: esengeli toloba ¡°te¡± na etumba ya maloba pe ya bilili, esengeli tobuaka likambo ya etumba¡±.
Bomoko ya Eklezia na bapanzi nsango
Na bokasi, Léon XIV alobi lisusu bomoko ya Eklezia na bapanzi nsango bakangemi, etindi babetela ye maboko.
Lisolo ya conclave
Po na likita na ye ya liboso na ndako ya makita Polo ya Motoba, sima ya botondi ebele ya bapanzi nsago pe ya batindami ya ba media po na mosala esalemaki na ba poso bileki, Léon XIV alobaki ba ¡°ngonga ya pasi¡± biye ¡°bikolakisa libaku po na biso banso¡± pe ekosenga biso ¡°komitika soki moke te na mbeba¡±. Na bokundoli santu Augustin, ¡°tovanda malamu pe bileko bikozala malamu. Tozali bileko¡± (Sermon 311). Papa wa Roma alobi lisusu tè esengeli te kozala ¡°na bopanzi nsango libanda na ngonga pe na lisapo¡±.
Léon XIV apesi melesi na bapanzi nsango po na mosala na bango ya conclave pe ya bokundi Papa François, po na oyo ¡°bosali po na bomibimisi na bilili maye totangaka mingimingi na bomoi ya bokristu pe bomoi ya Eklezia yango moko¡±.
Libaku mosusu ya eleko na biso eye Papa wa Roma alobaki, intelligence artificielle, ¡°ya monene ekoki kosala¡±, ekosenga ¡°mokumba pe bososoli zambi ezala ya solo na mosala ya mokili mobimba¡±.
Bolongoli bopanzi nsango na boyini pe makanisi mabe
Na bozongeli bobiangi ya Papa François, eye ezali na mokanda na ye ya suka po na Mokolo ya mokili mobimba ya bopanzi nsango 2025, Léon XIV azongeli:
¡°Bopanzi nsango ezangi mobulu pe ekolongola mobulu¡±, elobaki episkopo ya Roma, ¡°ekosunga biso ya kokaba bomoni ya bokeseni ya mokili pe ya kosala lolenge elongobami po ya lokumu na biso ya bomoto¡±. Po na yango, esukisaki ye, esengeli ¡°kopona na boyebi pe na molende nzela moko ya bopanzi nsango ya kimia¡±. Na suka ya likita, Papa Léon XIV abenisaki baye bazalaki wana na bolobi na bango ¡°Melesi mingi¡±.