Na Zubile ya Afrika, Tata Monsantu Papa asengi ¡®te banso bazala bilembo bya elikya o kati mokili
Bansango ya Vatikan
Mobu moye mosantu mokosenge na bakristu banso na koluka elikya, mpe bazala bilembo bya elikya mpo ya mokili. Mpo ya ntinamei, mokili mwa Afrika ezali kopesa ndakisa enene na mokili mobimba. Wana likwei lya maloba Papa Léon XIV alobelaki bantoma ba bikolo bya Afrika oyo bavandaka na Vatikan mpe na Italie; baye basanganaki na bazilike ya vatikan na bato basusu ba mobembo ya boyambi mpo na zubile mpo ya boboto mpo ya Afrika. Papa Léon azalaki kuna nsima ya misa makambemaki na episkopo wa lokumu Kardinal Francis Arinze; mpe baye bazingaki ye lokola Peter Kodwo Appiah Kardinal Turkson mpe Mgr Fortunatus Nwachukwu, kalaki (secrétaire) wa dicastère ya Évangélisation.
Kotambola elongo, na bomoko, na kosalisa basusu
Na lokota ya angele, Papa alobi alendisi ¡®te boyambi bwa biso nde bokopesa biso makasi mpe ekolakisa biso mwinda mwa Yezu-Kristu na bomoi bwa biso. Yango mpe ekosala ¡®te toyeba boni boni tosengeli kobikela boyambi bwa biso bobele mokolo mwa lomingo te, to mpe o ntango ya mobembo mwa boyambi, kasi mokolo na mokolo mpo totonda na elikya eye bobele Kristu yemei akoki kopesa biso. Na yango, tokokoka kotambola elongo moko lokola bandeko babali mpe basi, mpo ya kokumisa Nzambe wa biso mpe mpo ya koyeba ¡®te manso tozali na yango mpe ndenge tozali, ezali se likabo lya Nzambe. Bongo tosengeli kotiya likabo lina mpo ya kosalisa basusu.
Bokoba kobikela boyambi bwa bino o Kristu
Léon XIV apesaki mbote na bantoma ba bikolo bya Afrika, basalisi ba bango mpe mabota mabango banso mpe atondi bango botondi mpo ya boyambi bwa bango o Kristu. Mobembo mwa boyambi mwa zubile moye mozalaki na likanisi ntina « Elikya ya boboto o Afrika », mobongisamaki (elengelamaki) o libaku lya mokolo mwa Afrika (62è anniversaire). Bato soko nkama mitano (cinq cents personnes) basanganaki na ekwele ena.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.