Na Bazilike Santu Polo libanda lya bifelo ya Roma Papa L¨¦on XIV akoteya likolo lya ntina ya botindami bonso
Albys KBD CP - Kinshasa/RDC
Obotalaka lilita lya Santo Polo na mpokwa ya mwa 20 mai, Papa Léon XIV azongeli mateya likolo lya bobiangemi bwa Santu Polo wa Tarse. Tata Mosantu Papa alobaki : « Polo ayebaki ¡®te bokutani bwa yee na Kristu mpe etinda ya yee etingami na bolingo bwa Nzambe oyo azali kobenga yee akoma moto wa sika nzokande ye moko azalaki mosika na nsango elamu mpe konyokolo Eklezya ». Bongo, Papa wa Roma atondi Nzambe botondi na maloba Santu Augustino alobaki : « Eloko nini tokoki kopona soki baponaki biso liboso te ? Ya solo,soki balinagki biso liboso te, tokoki mpe kolinga te ».
Botosi o boyambi
Epai esusu, tata Mosantu Papa alakisi ¡®te Mokanda mwa Santu Polo mozali koloba mpe mpo ya botosi o boyambi lokola ekomami o likolo lya bazilike. Ya solo, o nzila ya Damasi, Nzambe atikelaki Polo libaku lya kopono: Papa alobi: « Libiki likoya te na bosepeli, kasi na nzila ya mobombamo mwa ngrasya mpe boyambi, na nzila ya bolingo bwa Nzambe mpe ya botosi mpe bonsomi epai ya moto ».
Kokoma banzeneneke ba bolingo
O liteya lya ye o bazilike lya Santu Polo libanda lya bifelo ya Roma, esika eye eyebani lokola esika ya ndulu na biyamba bandimela Kristu uto Papa Polo VI mpe likita lya Concile Vaticano II, Papa Léon XIV asengi nab aye bazalaki wana ¡®te « bayamba maloba ma yee mpe bakoma banzeneneke ya bolingo bwa Nzambe boye ¡°bopalangani o mitema mya bison a nzila ya Elimo Santu oyo tozwaki¡± (Rom 5,5) ». O bozwaka maloba na Papa Franswa o eyenga ya Mbongwana ya Santu Polo o mwa 25 yanuari 2024, Papa Léon XIV asengi na Nzambe likoki lya kolona mpe kopanza bolingo o mitema mya bato banso.
Epai esusu, bazilike Santu Polo o libanda lya bifelo ya Roma ezali na bokengi bwa lingomba lya ba Bénédictins. Yango wana, Papa Léon XIV apesi bango longonya na maloba maye: « Ndenge nini nakundola te maloba ma Santu Benedikto oyo alobaki ¡®te bolingo ezali liziba mpe nguya ya bopanzi Nsango Elamu, mpe ndenge, o Mobeko mwa yee esengeli kolakisa bolingo mpe bondeko o kati ya lingomba mpe na bato banso ? ».
Ntina ya botindami bonso
Mpo ya kosukisa, Papa Léon XIV asukisi liteya liya na bokumisi lingomba lya ba Bénédictins mpe na bokundoli maloba ma papa Benedikto XVI o libaku lya losambo o Madrid o mobu mwa 2011: « Nzambe alingi biso. Wana bosolo bonene bwa bomoi bwa biso mpe boye bokopesa ntina na bomoi bwa biso mobimba¡ O ebandela ya bomoi bwa biso ezali wana mwango mwa bolingo bwa Nzambe ».
Papa Leon XIV asukisi na bolobi ¡®te o kati ya bolingo bona bwa Nzambe nde esika « ezwami ntina ya botindami bonso mpe mingi mpenza boye bwa ngai lokola mokitani wa Santu Petro mpe mosangoli wa mpiko ya Santu Polo. Nzambe apesa ngai ngrasya ya koyanola na loboko na mbela ya yee »
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.