ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.04.30 Mibali bazali kos¨¤la mpo ya kobongola papamobile ya P¨¤pa Fran?ois na ambilansi mpo na bana ya Gaza 2025.04.30 Mibali bazali kos¨¤la mpo ya kobongola papamobile ya P¨¤pa Fran?ois na ambilansi mpo na bana ya Gaza   (Caritas )

Mutuka P¨¤pamobile ya boboto, likabo la nsuka ya Franc?ois na bana ya Gaza.

Yambo te akufa, P¨¤pa ya mboka Argentine asengaki ete motuka y¨¦ atambolaka ebongwana na ambilansi mpo na bana mike ya Gaza. Motuka ekozala n¨¤ mokumbi moko mpe monganga moko, n¨¤ bisaleli ya ndenge ya koyeba maladi, ya kotalela maladi mpe kopesa nkisi.

Bansango ya Vatican

 

Na molende Pàpa François azalaki mobateli ya lotomo ya bomoto mpe alakisaki bomitungisi bwa yé mp ona likambo ya Gaza; esika wapi defense civile epesi liyebisi lya liwà ya bato zomi na libwà (19). Elekaki bongo o mokolo mwa mitano (5) ya sàsnzà ya mayi, tango ebele ya masasi ya Ba-Israel ebetamaki na ngambo ya Nordi ya mabele ya Palestina.

Lolàka la yé mpo ya kimya mpe mbela ya yé nakotika mandoki, esili te na kogànga; mpamba te, ezali baye basàli eloko te nde bakokufa mpamba. Na yango, mpo ya likanisi azali na yango mpo na bana mike ya Gaza, Pàpa François abongolaki motuka yé atambolelaka, oyo ba bengi Pàpamobile, ekomi motuka ya kosàlisa bato na maladi, mingi mpenza bana. Apesi yango na maboko ya Caritas ya Yeruzalema. Na kati ya motuka, ekozala nà mokumbi moko, baminganga nà bisaleli ba bango ya koyeba maladi, mpe kopesa nkisi, mpe na bisaleli ndenge na ndenge ya lisalisi ya lombango, lokola Kits ya kotonga ba mpota, ba tonga, ba bidon ya oksigeni, ba mangwélé, mpe mwa sanduku ya malili mpo ya kobomba bankisi.

Ndakisa ya bolingo mpo ya bana ya Gaza

« Mutuka moye molakisi bolingi, libateli mpe bozalani pembeni oyo Tata-Mosantu-mosantu azalaki na yango mpe alakisi na bato ya mpasi». Alakisi yango na eleko nyonso ya matata, elobi bongo Anton Astar, secrétaire général ya Caritas ya Yéruzalema. Ezali na organisation caritative ya bakatoliko, bazwami mingi mpenza na mabélé ya Palestina; ekotanga bato koleka nkamà moko. Bazali kosàlisa bato na maladi, kasi na mikakatano mingi.

Na Gaza, lolàkà la Boboto lya Pàpa François ekozimàmàkà te mpo ya séko.
Na Gaza, lolàkà la Boboto lya Pàpa François ekozimàmàkà te mpo ya séko.

Lisalisi lya solo-solo mpe ya lombango

Na lisalisi lya likabo lya motuka mona mwa Papa, ekozala sik¡¯awa na makoki ya kokoma mpe bisika biyé bana basengeli na lisàlisi, mingi mpenza bana bayé bazoki, baliaka malamu te. Ezali lisali moko ya solo-solo, mpamba te, sistemi ya santé ya Gaza ekweyi mpenza na mabélé. Peter Brune, Secretaire generali ya Caritas ya mboka Suedi. Mabele ya Gaza etungisami mingi na bitumba ya Hamas nà Israël, ezali kokende boyé mbula mobimba. Ba lisàlisi bizali kowuta bipayi na bipayi o mokili mobimba. Na butu ya lomingo mp ona kokoma lundi, Israël andimi ete azwaki lisàlisi oyo esengelaki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 11:55