ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.05.11 Regina Caeli, losambo la Maria na eleko ya Pasika. 2025.05.11 Regina Caeli, losambo la Maria na eleko ya Pasika.  (@Vatican Media)

Lolenge kani kolanda Angelus ya P¨¤pa L¨¦on XIV ?

Lomingo na lomingo, Vatican News ekopesaka bino libaku lya kolanda losambo la Angelus oyo ekambami na Tata Mosantu na nzela ya site internet na biso mpe ba media sociaux.

Bansango ya Vatikan

 

O balomingo inso na ngonga ya nzanga, ngonga ya Roma, ut¡¯o lininisa lya ndako ya Papa, oyo etalaka na esika ya Mosantu-Petro, Papa apesaka na bokuse bomanyoli likolo lya Nsango Elamu ya mokolo mona mpo na mpe nsima ekolanda losambo ya Angelus. Nsima ya angelus, Tata-Mosantu akopesa mbote na masanga ma bakristu baye bayaki mobembo mwa boyambi mpe bazwami o esika ya Mosantu Petro. Papa akotanga nkombo ya masanga mpe bisika bawuti mpe akosungisa na mwa maloba likolo lya yoko likanisi ntina na makambo mazali koleka, oyo yemei aponi mpo kobenda makanisi ma bato.

Losambo la Angelus elekisamaka na ngonga mpe okoki kolanda yango o lokota lya lifalase. Tala bisika okoki kolanda yango: 

Na lokasa lya biso ya Vatican News: fina awa

Na canal ya biso ya youtube: fina awa

Na lokasa lya biso ya Facebook: fina awa

Okozwa likwei (maloba makuse) ya Angelus awa :

Na eleko mobimba ya Pasika, to na kati ya bikwela binene ya Pasika mpe ya Nkitela ya Elimo-Santu, bakosambela losambo la Regina Coeli na esika ya Angelus.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye. 

25 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 10:27