ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.05.21 Likita 2025.05.21 Likita  (@Vatican Media)

Likita : Liloba lokola mb¨®to elonami na mabel¨¦ ya bomoi na biso

Epiksopo ya sika ya Roma asalaki likita na ye ya yambo liboso ya bandimi 40.000 na esika ya Santu-Petelo, mokolo mwa misato 21 ya sanza ya mitano. Na bokobi molongo ya mateya ya jubil¨¦ ebandisamaki na oyo ye alandi, ¡°Yezu-Kristu, elikia na biso¡±, L¨¦on ya Zomi na Minei apesi bomanyoli na lisese ya moloni.

Nsango ya Vatican

Sima ya boleki na papamobile liboso y abato ebele, Léon ya Zomi na Minei amanyoli lisese ya moloni. ¡°Moulani eye ezali lokola ebandeli ya masese manso¡±, elobaki ye. Lisolo eye ekolakisa ¡°lolenge ya bosakoli ya Yezu¡±, ¡°liloba lyoko lyoko ya Nsango Ndamu ezali lokola mbóto elonami na mabelé ya bomoi na biso.

¡°¡°Ezalaki ye kolona boye, mbóto esusu ekwei pembeni ya nzela; ndeke iyei kolia yango. Mboto esusu ekwei o esika ya mabanga, ezui mabelé mingi te; ebimi noki zambi ekotoki o mabelé bozindo te; kasi ebimi moi makasi, eziki pe ekauki, zambi ebimisi misisa o mabelé te. Mbóto esusu ekwei o kati ya nzúbe; nzúbe ekoli, pe ebomi yango. Mbóto esusu ekwei o mabelé malamu, eboti mbuma: esusu eboti mbuma monkama mobimba, esusu ntuku motoba, esusu ntuku isato. Moto azali na matoi, ayoka!¡±¡±

Elili ya lisese

Moulani, koleka ya koloba lisolo moko na mokolo, ekotuna oyo atangi yango. ¡°Liboso ya lisapo (histoire) bayebisi ngai to elili balakisi ngai, nakoki komituna epayi nini nazali na lisapo? Elili yango ekoloba nini na bomoi na ngai?¡±, etunaki Papa wa Roma.

Lisese eye ya moloni ekosunga ebandeli ya masese misusu. Likambo esangisi masolo maye, elimbolaki Léon ya Zomi na Minei, ezali bobele mabelé.

¡°¡°Mabelé yango ezali nini? Ezali motema na biso, kasi ezali lisusu mokili, lisanga, Eklezia. Liloba ya Nzambe ekobotisa pe ekobimisa makambo bebo ya solo¡±¡±

Moloni moko ya lolenge na ye

Na liteya eye ebimi na mokako ya 13 ya Nsango Ndamu ya Mateo, Yezu akoloba na baye basangani nzinganzinga ya nadko na ye, ¡°kasi ekosala na moko moko na lolenge ekeseni¡±.

Moloni eye Yezu abeti lisolo azali na lolenge na ye, ekobaki Léon ya Zomi na Minei. ¡°Akolona mbóto ata esika bizali na konzo ya kobota mbuma te¡±, ezaleli moko ekoki kokamuisa, elobaki ye, ¡°po maye tosalaka tomesana komituna¡±.

Mabelé, elilingi ya moto

Kasi, bolingo ekoki kozala eloko ya komitunaka te, elobaki mokitani ya Petelo, pe lolenge Moloni akobuaka ba mbóto ezali ¡°elili moko ekolakisa lolenge Nzambe alingaka biso¡±.

Mabelé suka suka elilingi ya moto. Soki moto akoki kozala tango mosusu na bozangi bokebi, ¡°akonyokwama na makanisi kilikili ya bomoi¡±, akoki pe kozala ¡°moto azali na ngonga pe ayebi koyamba¡±, ¡°Nzambe ayebi kotiya motema pe kolikia ¡®te lelo to lobi mbóto ekobota. Alingi biso bongo, akozela te ¡®te tozala mabelé malamu, akopesa biso na motema molamu tango inso liloba na ye¡±.

Na bosakoli lolenge mbóto eboti mbuma, Yezu akoloba po ya bomoi ya ye, elimbolaki episkopo ya Roma na bandimi. Bongo ¡°lisese eye ekoyebisa biso ¡®te Nzambe akomilengela po ¡°apanza¡± po na biso pe Yezu akomilengela ya kokufa po abongola bomoi na biso¡±.

Moloni o eleko moi ekolala

Po ya bosukisi, Léon ya Zomi na Minei, alobaki kokanisa elili eye Vincent Van Gogh asalaka, Moloni o eleko moi ekolala, epayi wapi elakisi moto azali kolona, kasi tokomona sima na ye ba mbóto bisili bikomeli. ¡°Nakomona lokola ¡®te ezali elili moko ya elikia: na lolenge moko to mosusu nkona ebimisi mbuma. Toyebi te ndenge nini, kasi ezali bongo¡±.

21 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 16:01