L¨¦on ya Zomi na Minei akokoba na ba comptes ya Papa na ba r¨¦seaux sociaux
Nsango ya Vatican
Léon ya Zomi na Minei akani kokoba molongo ya baye balekaki liboso na ye na oyo etali ba réseaux sociaux, epayi wapi akozala lolenge esengeli.
Compte X
Léon ya Zomi na Minei akozongela na X ba comptes @Pontifex biye Papa François asalelaka yango pe liboso na ye Papa Benoit ya Zomi na Motoba. Bizali na minoko libwa: anglais, espagnol, portugais, italien, français, allemand, polonais, arabe pe latin, po na nionso ba milio 52 ya balandi. Makomi maye Papa François abimisaki mibu na mibu bikokota na archive na esika moko ebongisami na site internet ya Vatican (vatican.va)
Oyo etali Instagram, compte ebengami @Pontifex-ÐÓMAPµ¼º½ Leo XIV, yango moko eyebani lokola ya Papa, na bokobi na compte ya François @Franciscus, eye makomi bikoki komonana lokola archive ya bokanisi « Ad Memoriam »
Papa François, ba nsango koleka 50.000
Bozali ya Papa François na ba réseaux sociaux ezalaki na ntina : pembeni na nsango 50.000, bikomami na ba compte nionso libwa @Pontifex pe na @Franciscus. Pembeni ya mokolo moko moko, okokaki kokuta ba nsango ya mikuse ya bopanzi Nsango Elamu to ya bolendisi zambi na kimia, ya sembo kati na bato pe ya bobateli ekelamu. Na 2020, tango pandémie ezalaki makasi, ndakisa, ba nsango na ye bitangami mbala miliare 27.
Bokonzi ya Papa ebandi na Twitter na Benoît ya Zomi na Motoba
Papa Benoît ya Zomi na Motoba, mokolo ya 12 ya sanza ya zomi na mibale 2012, abandaki compte @Pontifex na Twitter, eye Papa François akamataki yango sima ya ba sanza. Mokolo ya 19 ya sanza ya misato 2016, compte Instagram oyo eyebani, na kombo ya @Franciscus, ebakisamaki.