ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Na Misa ya bobandi mos¨¤l¨¤ ya bontom¨¤ ya P¨¤pa L¨¦on ya zomi na mineyi (XIV) na esika ya Saint-Pierre, na lomingo loye la mitano ya eleko ya pasika, o mokolo mwa zomi na mwamb¨¦ (18) ya s¨¤nz¨¤ ya mayi ya mob¨´ 2025, na Roma. Na Misa ya bobandi mos¨¤l¨¤ ya bontom¨¤ ya P¨¤pa L¨¦on ya zomi na mineyi (XIV) na esika ya Saint-Pierre, na lomingo loye la mitano ya eleko ya pasika, o mokolo mwa zomi na mwamb¨¦ (18) ya s¨¤nz¨¤ ya mayi ya mob¨´ 2025, na Roma.   (AFP or licensors)

L¨¦on XIV: Petro azali te mokambi oyo akomifandelaka to Mokonzi akomonelaka basusu.

Etuluk¨´ ya bato koleka nkoto nk¨¤ma mibale ya bandimi (200 000), batondisaki esika Saint-Pierre mpe nzela ya Conciliazione. Bay¨¤ki kos¨¤ngana na Misa bobandi mos¨¤la ya bontom¨¤ ya P¨¤pa L¨¦on ya Zomi na mineyi (XIV), na lomingo loye. P¨¤pa atandi nzela oyo tokolandela banso elongo, n¨¤ bakristu banso, mangomb¨¤ manso, bato banso bamotema bolamu, mpo ya kotonga kimya.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Bakristu bayaki liboso, na tongo tongo, bazalaki nzinga nzinga ya esika Saint-Pierre. Bazalaki koluka esika ya kovanda po bamona malamu Pàpa ya bango ya sika Léon ya zomi na minei (XIV) oyo aponamaki o mokolo mwa minei mwa mwambi ya sànzà ya mitano, tango akosala misa mya yé mwa yambo o ebandela mosàlà mwa yé mwa Papa wa Roma. Bandimi bazalaki bongo koleka nkoto nkàma mibale (plus de 200 000), ya nkota ndenge na ndenge.  O kati ya bango bazalaki na bizaleli ya bankoko bikeseni, mpe ya langi ya loposo ya nzoto bikeseni.

Baùtaki bipayi na bipayi na bikolo nkàmà moko na tukù mineyi na libwà (149). Batindami ya bikolo  bayaki na motango ya nkàmà moko na tukù mitano na motoba (156). Ezalaki pe na batindami ya biyamba bisusu. Banso bayàki po na kopesa lokùmù na molùlù moye mokotikala lisàpo (histoire) na eklezya ya katoliko ya Roma.

Pàpa Léon XIV akei kotala sanctuaire ya Notre-Dame-du-Bon-Conseil na Genazzano
Pàpa Léon XIV akei kotala sanctuaire ya Notre-Dame-du-Bon-Conseil na Genazzano   (@Vatican Media)

Mpata mokokelela lisusu mokengeli te.

O kati ya bato bànà, mingi mpenza bazalaki baye baùtaki na Etats-Unis mpe Pérou, mabele mibale epayi wapi tata episkopo wa lokùmu Robert Francis Prevost abotamaki. Milùlù miye mizalaki kotiya elembo ya bobandi ya mokùmba mwa yé lokolà Mokitani ya Petro ya mbala ya nkàmà mibale na tùkù motoba na motoba (266e).

Léon XIV o kati ya motuka papamobile o kati kati ya etùlùkù ya bato
Léon XIV o kati ya motuka papamobile o kati kati ya etùlùkù ya bato   (@Vatican Media)

Kotonga kimya elongo

Asakolaki likambo moko ya kimya, bongo abengaki mangombà ya biyamba nyonso mpe bato banso ba motema molamu, basàngana po ya kotonga elongo mokili na bomoko. Bongo, bozali ya biyamba ndenge na ndenge bimonisamaki na tango ya misa, elimboli bobele ntina ya kimya, bondeko mpe bomoko. Pàpa abandaki mokolo moye nakopesa nayino ebele ya bato ba mobembo oyo bazalaki koyembela ye mpe kobetele ye maboko. Sima bakendaki na lilita lya Mosantu Petro mpo na milùlù.

Sima ya bozui bilembo bya Papa, motako nà palata (anneau, pallium), a salaki mateya ma yé. Alakisaki limemya na moto alandi, Pàpa François. Bongo alobelaki ntina ya kosangisa na bomoko bakristu pe bato na nzela ya boyambi pe bolingi bwa Nzambe. Abeti nsete mpe alobi ete, eklezya ya Roma esengeli kozala elembo ya bomoko, bondeko; pe mokumba mwa yango mozali oyo ya kozala mokambi ya bonkuku te, kasi mosàleli.

Yoko eklezya ekotikala polele po na mokili mpe na etindà

Na lisukulu lya yé, Léon XIV abetaki nseté makasi po na Eklezya oyo ekotikala polele po na mokili, eklezya ya etindà. Esengeli kozala mboto ya bomoko, ya lisànga pe ya bondeko, o kati ya mokili moye mwa bokabwani, matata, mobulu, bozangi bosémbo na makambo matali nkita to mombongo.

Mosantu Pàpa Léon XIV alati lopete ya Molobi
Mosantu Pàpa Léon XIV alati lopete ya Molobi   (AFP or licensors)

Bolingi pe bomoko

Asengi botosi ya bokeseni bya bizaleli pe eyamba ya bato na bato, basàngisa biyambi bwa bango nzinga nzinga ya bolingi bwa Nzambé mpe ya nsango ya mokristo. Mpamba te po na yé, «In illo uno unum» elimboli ete ¡°na yé mei kristu, tozali bomoko¡±, likanisi azwaki na sermon moko ya Saint Augustin.

Sé lokola boyé, Pàpa Léon XIV amilakisi mokambi ya bomikitisi, pe oyo azali pembeni ya bato. Oyo akoluka bomoko o kati ya eklezya mpe na etindà ya boyokani o mokili mobimba.

Misa ya bobandi mosàla mwa Pàpa, ya Pàpa Léon XIV

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 14:06